Lakisá makambo oyo ezali na kati

Koyekola Biblia elimboli nini?

Koyekola Biblia elimboli nini?

 Boyekoli ya Biblia esalemaka ndenge nini?

 Molakisi na yo akosalisa yo oyeba Biblia malamumalamu, elingi koloba, liteya moko na moko. Na lisalisi ya buku Sepelá na bomoi libela na libela! boyekoli ya Biblia, okoyekola mokemoke nsango ya Biblia, mpe ndenge ekoki kosalisa yo. Mpo na koyeba makambo mosusu, talá video oyo.

 Nasengeli kofuta mbongo mpo nayekola Biblia?

 Te. Tolandaka malako oyo Yesu apesaki bayekoli na ye: “Bozwi ofele, bópesa ofele.” (Matai 10:8) Balakisi na biso bafutamaka te, okofuta eloko moko te mpo ozwa Biblia to kopi moko ya buku Sepelá na bomoi libela na libela!

 Boyekoli yango eumelaka ntango boni?

 Buku yango ezali na mateya 60. Yango etaleli kaka yo moko, soki okopona koyekola mbala boni. Kasi mbala mingi, bayekoli mosusu bamonaka malamu báyekola ata liteya moko to koleka pɔsɔ na pɔsɔ.

 Nasala nini mpo nabanda koyekola?

  1.  1. Tondisá formilɛrɛ na Internet. Tokosalela makambo etali yo moko kaka mpo na koyanola na bosɛnga na yo.

  2.  2. Molakisi moko akoya kotala yo. Molakisi na yo akolimbola makambo oyo okoyekola na boyekoli na yo ya Biblia mpe akopesa biyano na mituna na yo nyonso.

  3.  3. Yo ná molakisi na yo bokoyokana mpo na kosala programɛ. Molakisi akoki koya koyekola na yo na esika ozali to bokoki koyekola na nzela ya telefone, video, kokomelana mikanda to bamesaje. Mbala mingi, boyekoli ya Biblia esalemaka na boumeli ya ngonga moko, kasi ekoki kozala mokuse to molai na kolanda programɛ na yo.

 Nakoki kobanda naino koyekola eteni ya liboso?

 Ɛɛ. Mpo na kosala yango, tondisá formilɛrɛ na Internet. Ntango molakisi akoya kotala yo, yebisá ye polele ete ozali na mposa ya kobanda koyekola mpo omona soki ekosepelisa yo. Mpo oyeba ndenge boyekoli yango esalemaka, bokosalela mwa buku Sepelá na bomoi libela na libela!, oyo ezali na mateya misato ya ebandeli.

 Soki nandimi koyekola Biblia, bakotya ngai mbamba mpo nakóma Motatoli ya Yehova?

 Te. Batatoli ya Yehova balingaka koteya bato makambo ya Biblia, kasi batyaka bato mbamba ata moke te mpo bákɔta na lingomba na bango. Kutu, na limemya nyonso, balakisaka bato makambo oyo Biblia elobi, mpe bayebi ete moto na moto azali na lotomo ya kopona makambo oyo akondima.​—1 Petro 3:15.

 Nakoki kosalela Biblia na ngai moko?

 Ɛɛ, okoki kosalela libongoli nyonso ya Biblia oyo olingi. Kasi tosepelaka kosalela Biblia​—Libongoli ya Mokili ya Sika mpo ezali na maloba ya polele mpe ya sikisiki, tondimaka ete bato mingi balingaka kosalela mabongoli oyo bamesaná na yango.

 Nakoki kobengisa bato mosusu mpo básangana na boyekoli na ngai?

 Ɛɛ. Okoki kobengisa bato nyonso ya libota na yo to baninga na yo.

 Soki nasilá koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova, nakoyekola lisusu?

 Ɛɛ. Kutu, okosepela na boyekoli ya mikolo oyo mpo elobeli makambo mingi ya sika oyo bato bazali kokutana na yango lelo oyo. Ezali mpenza kosepelisa mpo boyekoli yango ekosalema lisusu te ndenge ezalaki kosalema liboso, moyekoli ná molakisi bakobanda koyekola lokola nde bazali kobɛta masolo.

 Nasala nini soki naponi koyekola Biblia ngai moko?

 Atako bayekoli mingi bakangaka ntina ya mateya malamu na lisalisi ya molakisi, kasi bato mosusu bamonaka malamu báyekola naino bango moko. Bisaleli na biso mpo na koyekola ezali na bisaleli ya ofele oyo ekosalisa yo ntango ozali koyekola Biblia. Talá mwa bisaleli oyo ekoki kosalia yo:

  •   Mateya ya Biblia. Masolo yango elobeli mitinda ya Biblia oyo epesaka matomba na oyo etali bomoi ya mokolo na mokolo, na ndakisa: “Oyo okoki kosala mpo na kolonga kotungisama,” “Ndenge ya kobɔkɔla mwana na yo,” mpe “Okosala nini soki ozali lisusu na mbongo mingi te?”

  •   Bavideo ya Biblia. Bavideo yango ya mikuse ezali kolimbola mateya ya ntina mingi ya Biblia.

  •   Mituna ya Biblia. Masolo yango ezali kopesa biyano na mituna etali Biblia.

  •   Ndenge bavɛrsɛ ya Biblia elimbolami. Luká koyeba ndimbola ya bavɛrsɛ oyo eyebani mingi mpe ndenge bafraze na yango elimbolami.