Lakisá makambo oyo ezali na kati

Ndenge nini Batatoli ya Yehova batalelaka likambo ya kolela ebembe to kosala matánga?

Ndenge nini Batatoli ya Yehova batalelaka likambo ya kolela ebembe to kosala matánga?

 Na likambo ya kolela ebembe to kosala matánga, makanisi na biso euti na mateya ya Biblia, na kati na yango ezali na makambo oyo elandi:

  •   Ezali mabe te kolela ndeko to moninga oyo akufi. Bayekoli ya Yesu balelaki bandeko ná baninga na bango oyo bakufaki. (Yoane 11:33-35, 38; Misala 8:2; 9:39) Yango wana, tomonaka te ete molulu ya kokunda ebembe ezali ntango ya kosala bafɛti ya lokoso. (Mosakoli 3:1, 4; 7:1-4) Kasi, tomonaka nde ete yango ezali ntango ya kolela na baoyo bazali kolela.​—Baroma 12:15.

  •   Soki moto akufi ayebi eloko te. Ezala tozali bato ya mboka nini, ya ekólo nini, toboyaka mimeseno mpe makambo oyo euti na Biblia te oyo bato bandimaka, ete bato oyo bakufá bayebi makambo, mpe bakoki kosala biso mabe to kosalisa biso. (Mosakoli 9:5, 6, 10) Yango etali makambo lokola, kolala libándá ntɔngɔ saa, kolya mpe komɛla na loyenge to kosala bafɛti ya lokoso, kokanisa mokolo moto akufaki, kopesa bato oyo bakufá biloko ya kolya to ya komɛla, kosolola na bango to kosɛnga bango básalisa biso, konyokola mwasi to mobali oyo molongani na ye akufi mpe kolata pili. Toboyaka makambo wana nyonso mpo na kotosa mobeko oyo Biblia epesi: “Bókabwana, . . . mpe bótika kosimba eloko ya mbindo.”​—2 Bakorinti 6:17.

  •   Bato oyo bakufá bakosekwa. Biblia eteyaka ete lisekwa ekozala, mpe na ntango yango, liwa ekozala lisusu te. (Misala 24:15; Emoniseli 21:4) Elikya yango esalisaka biso tólekisa ndelo te, kaka ndenge esalisaki bayekoli ya siɛklɛ ya liboso.​—1 Batesaloniki 4:13.

  •   Biblia epesi toli ete tólekisaka ndelo te. (Masese 11:2) Tondimaka te ete milulu ya kokunda ebembe ezali ntango ya kolakisa ete tozali bato minene to tozali na mbongo mingi. (1 Yoane 2:16) Tozwaka bibongiseli te mpo na kosala bafɛti mpo na kosepelisa bato to mpo na kosomba malita to basanduku ya kafukafu ya kokunda ebembe, mpe tolataka te mpo na kokamwisa bato.

  •   Totindaka mpe bato te ete bándima makanisi na biso na ndenge ya kolela to kokunda ebembe. Na esika oyo, tolandaka likanisi ya Biblia oyo: “Mokomoko na biso akozongisa monɔkɔ epai ya Nzambe mpo na ye moko.” (Baroma 14:12) Nzokande, soki bapesi biso nzela, tolimbolaka “na boboto mpe na limemya” makambo oyo tondimaka.​—1 Petro 3:15.

Batatoli basalaka nini mpo na kokunda ebembe?

 Esika ebembe ekozala: Soki libota moko ezwi ekateli ya kosala milulu ya kokunda ebembe, ekoki kosalema esika bango moko bakopona, ekoki kozala na Ndako ya Bokonzi, na esika balelaka bibembe, na ndako na bango moko, na esika batumbaka bibembe to na esika bakundaka bibembe.

 Makambo oyo bakosala: Bakosala diskur moko mpo na kobɔndisa bato oyo ndeko na bango akufi, bakolimbola makambo Biblia elobi mpo na liwa mpe elikya ya lisekwa. (Yoane 11:25; Baroma 5:12; 2 Petro 3:13) Diskur yango ekoki kosalisa biso tókanisa bizaleli ya malamu ya moto oyo akufi, mpe ntango mosusu ekoki kobenda likebi na liteya tokoki kozwa na bosembo ya moto yango.​—2 Samwele 1:17-27.

 Na nsima bakoyemba nzembo oyo makanisi na yango euti na Biblia. (Bakolose 3:16) Na nsuka ya molulu yango libondeli moko ya kolendisa esalemaka.​—Bafilipi 4:6, 7.

 Diskur esalemaka ofele, bakɔngɔlaka mpe mabonza te: Tosɛngaka bandeko na biso mbongo te mpo na kosala diskur ya kokunda ebembe, ezala mpe mpo na milulu mosusu oyo etali kokunda to kolela ebembe; ata na makita na biso mpe tosalaka bongo te.​—Matai 10:8.

 Bato oyo bakoya: Soki bakolela ebembe mpe bakosala diskur na Ndako ya Bokonzi, ata bato oyo bazali Batatoli ya Yehova te bakoki koya. Ndenge moko na makita na biso, moto nyonso akoki koya koyoka diskur oyo ekosalema wana, azala Motatoli ya Yehova to te.

Batatoli ya Yehova bakendeke na milulu ya kokunda ebembe oyo mangomba mosusu esali?

 Motatoli ya Yehova mokomoko asengeli kozwa ekateli ye moko na kolanda lisosoli na ye oyo eteyami na Biblia. (1 Timote 1:19) Nzokande, tokɔtaka te na makambo ya mangomba oyo tomoni ete eyokani te na mateya ya Biblia.​—2 Bakorinti 6:14-17.