Lakisá makambo oyo ezali na kati

Mpo na nini Batatoli ya Yehova baboyaka na limemya nyonso kosangana na makambo oyo ekumisaka ekólo?

Mpo na nini Batatoli ya Yehova baboyaka na limemya nyonso kosangana na makambo oyo ekumisaka ekólo?

 Batatoli ya Yehova batosaka bakonzi ya leta mpe bilembo ya ekólo. Tondimaka ete bato mosusu bakoki kopona kopesa bɛndɛlɛ losako to koyemba nzembo ya ekólo.

 Kasi, biso Batatoli ya Yehova toboyaka kosangana na makambo yango mpo eyokani te na mateya ya Biblia. Tosepelaka ntango bato bámemyaka bindimeli na biso ndenge kaka biso mpe tomemyaka ya basusu.

Na lisolo oyo

 Mitinda nini ya Biblia emonisi yango?

 Mitinda mibale ya Biblia oyo esalisaka biso tosala liponi ya malamu:

  •   Ebongi kosambela kaka Nzambe ye moko. Biblia elobi ete: “Osengeli kosambela nde Yehova Nzambe na yo, mpe kaka ye moko nde osengeli kosalela mosala mosantu.” (Luka 4:8) Loyembo ya ekólo ezalaka na maloba oyo ntango mosusu elobelaka libosoliboso bolingo ya ekólo koleka eloko mosusu nyonso. Na yango Batatoli ya Yehova bamonaka ete ezali mabe mpo na bango ya kosangana na milulu wana.

     Batatoli ya Yehova bamonaka ete kopesa bɛndɛlɛ ya ekólo losako ezali kosala losambo, to kosambela bikɛko​—makambo oyo Biblia epekisi. (1 Bakorinti 10:14) Bato mosusu ya istware bayebi ete bɛndɛle ya ekólo ezalaka mpenzampenza bilembo ya losambo mpo na mangomba. Moto moko ya istware na nkombo Carlton J. H. Hayes a akomaki boye: “Bolingo ya ekólo ezali lokola lingomba oyo elombo na yango ezali bendɛlɛ.” Mokomi ya babuku moko Daniel P. Mannix akomaki boye mpo na bakristo ya siɛklɛ ya liboso: “Bakristo bazalaki koboya kopesa losambo na elimo oyo ezalaki kobatela ampɛrɛrɛ ya Roma . . . Yango ekokani lelo na ndenge baboyaka kopesa bɛndɛlɛ losako.” b

    Atako Batatoli ya Yehova bapesaka bɛndɛlɛ ya ekólo losako te, kasi bapasolaka yango te, batumbaka yango te, mpe bomonisaka te ete bɛndɛlɛ to mpe bilembo mosusu ya ekólo ezali na valɛrɛ te.

  •   Nzambe amonaka ete bato nyonso bazali ndenge moko. (Misala 10:34, 35) Biblia elobi ete “na moto moko [Nzambe] asalaki bikólo nyonso ya bato.” (Misala 17:26) Mpo na ntina yango, Batatoli ya Yehova bamonaka ete ebongi te kokumisa ekólo moko koleka bikólo mosusu. Topesaka bato nyonso lokumu, ezala bazali bato ya loposo nini, bautá wapi to bafandaka wapi.​—1 Petro 2:17.

 Bongo soki mobeko moko esɛngi kaka kosala molulu yango?

 Batatoli ya Yehova batɛmɛlaka baguvɛrnɛma te. Tondimaka ete baguvɛrnɛma ezali “ebongiseli ya Nzambe”, ye nde atiki yango ezala. (Baroma 13:1-7) Tondimaka mpe ete bakristo basengeli kotosa bakonzi ya leta.​—Luka 20:25.

 Bongo soki mobeko moko ya leta esɛngi tósala likambo moko oyo mobeko ya Nzambe epekisi? Na bantango mosusu, ekoki kosalema ete tósɛnga bakonzi ya leta bátalela lisusu mobeko yango malamu, soki esɛngi kobongisa yango. c Soki yango esimbi te, Batatoli ya Yehova baponaka na limemya nyonso “kotosa Nzambe mpo azali mokonzi na esika ya kotosa bato.”​—Misala 5:29.

 Batatoli ya Yehova balukaka kozala na ngámbo moko to mosusu na makambo ya politiki?

 Te. Batatoli ya Yehova baponaka ngámbo moko te na makambo ya politiki. Ntango toboyaka kopesa bɛndɛlɛ losako to koyemba nzembo ya ekólo, elingaka koloba te ete tozali bato ya politiki. Kasi, mpo na likambo oyo etali milulu yango, biso tokangamaka nde na bindimeli na biso oyo esimbami na mateya ya Biblia.

a Buku Essays on Nationalism, nkasa 107-108.

b Buku The Way of the Gladiator, lokasa 212.