Lakisá makambo oyo ezali na kati

Batatoli ya Yehova bandimaka ete Nzambe akelaki mokili na pɔsɔ moko?

Batatoli ya Yehova bandimaka ete Nzambe akelaki mokili na pɔsɔ moko?

 Te. Biso Batatoli ya Yehova tondimaka ete Nzambe nde akelá biloko nyonso. Kasi tondimaka te ete asalaki yango mikolo motoba na kati ya pɔsɔ. Mpo na nini? Mpamba te makanisi ya bato oyo balobaka ete Nzambe akelá mokili na pɔsɔ moko eyokani te na oyo Biblia elobi. Talá bandakisa oyo mibale:

  1.   Ntango oyo mikolo motoba ya bozalisi eumelaki. Bato mosusu oyo balobaka ete Nzambe akelaki mokili na pɔsɔ moko bandimaka ete mikolo motoba ya bozalisi ezalaki mikolo ya banda ntɔngɔ tii mpokwa. Nzokande, na Biblia liloba “mokolo” ekoki mpe komonisa eleko moko ya molai mpenza.​—Ebandeli 2:4; Nzembo 90:4.

  2.   Mbula oyo mabele eumeli. Bato mosusu oyo balobaka ete Nzambe akelá mokili na pɔsɔ moko bateyaka ete molɔ́ngɔ́ eumeli kaka mwa bankóto ya bambula. Nzokande, Biblia emonisi ete mabele mpe molɔ́ngɔ́ ezalaki liboso mikolo motoba ya bozalisi ebanda. (Ebandeli 1:1) Yango wana, Batatoli ya Yehova baboyaka te kondima makanisi ya bato ya siansi oyo bamonisaka ete ntango mosusu mabele eumeli bamiliare ya bambula.

 Biso Batatoli ya Yehova tondimaka ete biloko nyonso ekelamá, kasi toboyaka siansi te. Tondimaka ete makambo ya solo oyo bato ya siansi bayekoli eyokani na Biblia.