Lakisá makambo oyo ezali na kati

Mokonzi moko ya lingomba azwi biyano na mituna na ye

Mokonzi moko ya lingomba azwi biyano na mituna na ye

 Mokolo moko, Eliso oyo azali Motatoli ya Yehova azalaki koyekola Biblia na mwasi moko na ndako ya mwasi yango, kasi na mbalakaka bapaya bayaki na ndako ya mwasi yango. Na porte, bamonaki mobali moko oyo azali mokonzi ya lingomba ná mwasi na ye. Elekaki mwa mikolo, Eliso ayokaki ete mobali yango ná mwasi na ye bautaki kobungisa mwana na bango kaka se moko na liwa.

 Ntango Eliso akabolaki mawa elongo na bango, balelaki na mai ya miso mpenza. Na nsima, mokonzi yango ya lingomba alobaki na nkanda boye: “Nandimi mpenza te mpo nini Nzambe atiki komekama ya boye ekómela biso! Ndenge nini akokaki kozwa mwana na ngai kaka se moko wana? Esali sikoyo mbula 28 banda nazali kosalela Nzambe, nasali makambo mingi ya malamu, mpe oyo nde lifuti Nzambe apesi ngai! Mpo na nini Nzambe abomi mwana na ngai?”

 Eliso alimbwelaki bango ete ezali Nzambe te azwaki mwana na bango. Ndeko mwasi alobelaki mpe masolo etali lisiko, lisekwa, mpe ntina oyo Nzambe atiki nzela ya makambo ya mabe esalema. Mokonzi wana ya lingomba ná mwasi na ye bayebisaki Eliso ete apesaki bango biyano na mituna na bango mpe bazalaki kobondela mpo na mituna yango.

 Pɔsɔ elandi mokonzi yango ya lingomba ná mwasi bazongaki lisusu epai ya mwasi yango mpo bábanda koyekola Biblia elongo. Eliso ná mwasi yango bazalaki kolobela mokapo oyo elobi: “Elikya ya solosolo mpo na bato olingaka oyo bakufá,” na buku Biblia eteyaka mpenza nini? babalani yango basanganaki na esengo na boyekoli yango.

 Mwa moko na nsima, bango mibale bayanganaki na liyangani moko ya sipesiale ya Batatoli ya Yehova na Tbilisi, na Géorgie, mpe balendisamaki na komona ndenge bandeko bamonisaki bolingo mpe bomoko, oyo ezali bizaleli mibale oyo azalaki kosala makasi emonana na lingomba na ye, kasi esimbaki te.