Batatoli ya Yehova na mokili mobimba

Australia

  • Wollongong, Nouvelle-Galles du Sud, na Australie: Batatoli bazali kolakisa moto lokasa ya libyangi mpo na diskur ya bato nyonso

Mitángo mpo na Australia

  • Ezali na bato 26 636 000
  • Bato oyo bateyaka Biblia bazali 71 188
  • Masangá ezali 726
  • Motatoli ya Yehova 1 mpo na bato 379 habitants

KOSALISA BATO

Kopesa mibange elikya mpe kobɔndisa bango

Batatoli ya Yehova bazali kosala vizite na bandako ya mibange na Australie.

MOSALA YA KOSAKOLA

Kosakola na teritware ya mosika​—Australie

Salá mobembo elongo na libota moko ya Batatoli ya Yehova na boumeli ya pɔsɔ oyo bazali kosakwela bato oyo bafandaka na bamboka ya kati mpenza, ya Australie.