Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

JW LIBRARY

Bongisá mikanda ndenge olingi​—Android

Bongisá mikanda ndenge olingi​—Android

Tobongisi makambo ndenge na ndenge na JW Library mpo na kosalisa yo na kotánga. Okokuta makambo yango na likoló ya lokasa, ntango ozali kotánga mokapo ya Biblia to lisolo mosusu.

Ekoki kosɛnga ofina Madodo na likoló mpo omona makambo mosusu.

Landá makambo oyo mpo oyeba ndenge ya kobongisa mikanda:

 Kotya monɔkɔ mosusu

Okoki kobongola monɔkɔ ya mokapo to lisolo oyo ozali kotánga.

  • Bɛtá na elembo ya Minɔkɔ mpo omona minɔkɔ oyo ezali na lisolo oyo ezali kotánga. Minɔkɔ oyo oponaka mingi ekozala na esika ya liboso. Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe ekoki kobima na esika yango. Mpo oluka monɔkɔ moko, okoki mpe kobɛta nkombo na yango.

  • Pembeni ya minɔkɔ oyo osalelá naino te, okomona elembo ya lipata. Mpo ozwa mokanda, bɛtá mosapi na monɔkɔ yango. Soki mokanda yango ekɔti na telefone to tablɛti na yo, lipata yango ekolongwa. Bɛtá lisusu mosapi na monɔkɔ yango mpo otánga mokanda yango.

 Kokómisa makomi minene to mike

Okoki kokómisa makomi minene ndenge olingi.

Bɛtá na Taille de police likoló kuna; na nsima bendá mondelo mpo makomi ekóma minene to mike. Makomi ya mikanda nyonso ekobanda kobima na bonene ndenge oponi.

 Komona bililingi to makomi mpamba

Masolo mosusu ekoki kobima lokola bililingi, to makomi. Finá na elembo oyo mpo otya elilingi to makomi.

  • Bililingi: Soki oponi elilingi, mokanda ekobima ndenge ezalaka na papye. Bato mosusu balingaka bongo, na ndakisa mpo na buku ya nzembo, mpo elilingi ebimisaka banɔti.

  • Makomi mpamba: Soki oponi makomi, okoki kotánga vɛrsɛ soki obɛti yango, mpe makomi ekobima monene ndenge oponá.

 Kofungola na . . .

Esika bakomi Ouvrir dans . . . ezali mpo na kosalisa yo ofungola makambo ya JW Library na esika mosusu.

Soki obɛti Ouvrir dans . . . okomona bisika yango. Na ndakisa, soki ofini Ouvrir dans Bibliothèque en ligne, okofungola lisolo yango na Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET.

 Kobongisa Babiblia ndenge olingi

Ntango obɛti vɛrsɛ na lisolo oyo ozali kotánga, bavɛrsɛ yango ekobima. Finá esika bakomi Personnaliser oyo ezali awa na nse mpo otala soki na Babiblia oyo ozwá, oyo wapi okolinga kobakisa wana.

Finá na elembo ya kobakisa to kolongola Babiblia. Finá na nsuka boye mpo olandisa Babiblia ndenge olingi.

Talá lisolo “Kozwa Babiblia mpe kosalela yango​—Android” mpo oyeba ndenge ya kobakisa Babiblia na JW Library.

Makambo yango ebimaki na sanza ya mibale na 2015 na JW Library 1.4, oyo esalaka malamu na aparɛyi Android 2.3 matá. Soki ozali komona yango te, landá malako oyo ezali na lisolo “Bandá kosalela JW Library​—Android,” na motó ya likambo Mpo na Kozwa makambo ya sika.