Lakisá makambo oyo ezali na kati

Malako mpo na kosalela site oyo

Malako mpo na kosalela site oyo

Boyei malamu!

Site Internet oyo esalami mpo na kosalisa yo oyeba makambo mingi etali Nzambe, Biblia, mpe Batatoli ya Yehova. Tángá, talá mpe zwá makambo oyo esepelisi yo. Tolingi ete moto nyonso akɔta na site na biso, kasi tobondeli yo, kozwa te makambo oyo ezali na site oyo mpo na kotya yango na site mosusu to na programɛ mosusu. Okoki koyebisa basusu makambo oyo omoni na site oyo mpe kolendisa bango bákɔta na site yango, ndenge tomonisi yango awa na nse na Malako mpo na kosalela Site oyo.

 Copyright

© 2024 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania. All rights reserved.

Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc. (“Watchtower”) nde esalá site oyo mpe ebatelaka yango. Soki liyebisi mosusu ezali te, makomi mpe bansango nyonso oyo ezali na site oyo ezali ya Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania (“Watch Tower”).

 Bilembo

Adobe, elembo ya Adobe, Acrobat mpe elembo ya Acrobat ezali bilembo ya Adobe Systems. iTunes mpe iPod ezali bilembo ya Apple Inc. Microsoft, elembo ya Microsoft, ata mpe nkombo ya programɛ nyonso ya Microsoft mpe biloko na yango, ezala mpe Microsoft Office mpe Microsoft Office 365, ezali bilembo ya Microsoft Inc. Android ezali elombo ya Google LLC. Android ebimaka mpe ebongisamaka na Google mpe elandaka malako oyo ezali na Creative Commons 3.0 Attribution License (https://creativecommons.org/licenses/by/3.0/us/). Bilembo mosusu nyonso ezali na bankolo na yango.

 Malako mpo na kosalela site oyo

Malako yango nde osengeli kolanda mpo na kosalela site Internet oyo. Soki okɔti na site oyo, elakisi ete ondimi malako na yango, mpe malako mosusu nyonso oyo bakoki kobakisa. Soki malako yango nyonso to ndambo esepelisi yo te, kosalela site oyo te.

Ndenge malamu ya kosalela site oyo: Mpo na kotosa bandelo oyo batye awa na nse, okoki:

  • Kotala, kozwa, mpe ko-imprimer bililingi, kozwa mikanda ya kotya na telefone to na tablɛti, miziki, bafɔtɔ, makomi, bavideo oyo yo moko okosalela, kasi te mpo na kotɛka yango.

  • Na telefone to na tablɛti na yo, kolakisa basusu esika bakoki kokɔta na site mpo na kozwa mikanda, bavideo to makambo ya koyoka na kasɛti.

Okoki te:

  • Kotya bililingi, mikanda, bilembo, miziki, bafɔtɔ, bavideo to masolo ya site oyo na Internet (na site mosusu ya kotindelana badosye, bavideo, basite ya kosolola na bato ebele to na site mosusu nyonso).

  • Kokabola bililingi, mikanda, bilembo, miziki, bafɔtɔ, makomi, to bavideo ya site oyo, ezala ndambo to mobimba, na programɛ moko boye ya ordinatɛrɛ; (ata mpe kozwa yango na serveur moko mpo na kosalela yango na programɛ moko boye).

  • Kobimisa lisusu, kosala kopi, kokabola to kosalela bililingi, mikanda, bilembo, miziki, bafɔtɔ, makomi, to bavideo ya site oyo mpo na kotɛka to mpo na kozwa lifuti (ata soki osali yango mpo na lifuti te).

  • Kosala baprogramɛ ya ordinatɛrɛ to mayele mosusu oyo ezali kopesa nzela na kosangisa, kosala kopi, kozwa, kobenda mwa makambo na site oyo, HTML, bililingi to makomi ya site oyo. (Yango epekisi te kokabola baprogramɛ ya ofele oyo esalemi mpo na kozwa mikanda to bavideo na site oyo; na ndakisa EPUB, PDF, MP3, AAC, MOBI mpe MP4 na esika oyo moto nyonso akoki kokɔta.)

  • Kosalela site oyo to makambo oyo ezali na kati na ndenge ya mabe, na ndakisa kobebisa to kokɔta na site na ndenge oyo eyokani te na malako bapesi awa.

  • Kosalela site oyo na ndenge ekoki kobebisa yango to mpe kopekisa moto akɔta na site yango; kosalela site oyo na ndenge ya mabe, to na ndenge ya moyibi; to na makambo mosusu ya ndenge wana.

  • Kosalela site oyo to bililingi na yango, mikanda, bilembo, miziki, bafɔtɔ, makomi to bavideo mpo na kosala bapiblisite.

  • Site Internet oyo ezwaka makambo mosusu na Google Maps, oyo ezali site oyo biso tolandelaka te. Soki olingi kosalela Google Maps na site oyo osengeli kondima mpe makambo mosusu oyo Google Maps/Google Earth esɛngaka. Bayebisaka biso te ntango nyonso oyo batye malako na yango ya sika oyo etali site na yango, yango wana tosɛngi yo, luká koyeba malako na yango ya sika liboso ya kosalela yango. Kosalela te Google Maps soki ondimi te malako na yango ya sika. Google Maps ezongisaka te na site na biso makambo oyo moto asalaki na site yango.

 Eteni etali makambo ya minganga

Makambo oyo ezali na eteni oyo (“Eteni etali makambo ya minganga”) ezali wana kaka mpo na kopesa bansango, kasi te mpo na kopesa batoli na makambo ya minganga, ezwi mpe te esika ya batoli ya minganga, baekzamɛ na bango to bankisi oyo bapesaka bato ya maladi. Eteni oyo etindi bato te básalisa baekzamɛ, bakende epai ya monganga boye to boye, bámɛla nkisi boye to boye to bálanda likanisi boye to boye to bansango mosusu oyo ezali na Eteni oyo.

Site Internet oyo esalaka nyonso mpo na kotya bansango ya sikisiki mpe ya sika na Eteni etali makambo ya minganga. Kasi, bansango oyo batyaka na Eteni oyo ezalaka kaka ndenge bazwi yango, ndanga ezali te. Epesi ndanga mpe te mpo na makambo oyo ezali na Eteni oyo, ezala na makambo etali mimbongo to kosalela yango mpo na mokano moko boye. Epesi mpe ndanga moko te ete makambo oyo batye na eteni yango ebongi kotyelama motema, ezali sikisiki, esilá ngala te to ekoki kosalisa. Site oyo ekomema mpe ngambo te mpo na libunga nyonso to mpo na makambo oyo ezangi na Eteni oyo. Soki otye motema na bansango oyo batye wana, etali kaka yo moko. Site oyo ekomema ngambo ata moke te soki likambo moko ekómeli yo (ezala, kozanga ndelo, likama na nzoto to liwa mpo na bopɔtu na yo, obungisi matomba to makambo na yo mosusu) mpo osalelaki Eteni oyo malamu te, ata soki olobi ete ozalaki na ndanga, kɔntra, basali yo mabe to likambo mosusu nyonso oyo etali mibeko, ata soki Site Internet oyo eyebi to te nini esali ete likama yango ekómela yo.

Ndanga ezali te, ngambo mpe te, soki osaleli site oyo

 Site Internet oyo mpe makambo nyonso oyo ezali na kati, Watchtower nde etye yango. Watchtower elobi likambo moko te, epesi mpe te ndanga moko boye.

Watchtower epesi ndanga te ete site oyo ezangi virisi to eloko mosusu oyo ekoki kobebisa aparɛyi na yo. Watchtower ekomema ngambo te mpo na likambo nyonso ekokóma mpo osaleli makambo oyo batye na site oyo.

Kobuka mibeko ya kosalela site oyo

 Watchtower ezali na lotomo ya kolandela yo soki otosi te malako etali kosalela Site oyo. Ekoki kopekisa yo kokɔta na site yango, koboya kokɔtisa baordinatɛrɛ oyo esalelaka adrɛsi na yo na site yango, kosɛnga kompanyi oyo epesaka yo nzela ya kokɔta na Internet ekata kopesa yo nzela ya kokɔta na site yango to kofunda yo na Leta.

Kobongola malako mpo na kosalela site oyo

 Watchtower ekoki kobongola malako mpo na kosalela site oyo ntango nyonso elingi. Esengeli kosalela malako oyo babongisi lisusu kaka na mokolo oyo batye yango na site. Tosɛngi yo otángaka lokasa oyo mbala na mbala mpo oyeba makambo oyo ebongwani.

Makambo etali mibeko

 Malako mpo na kosalela Site oyo eyokani na mibeko ya etúká ya New York (États-Unis), mpe ebuki mibeko te. Soki moto afundi biso mpo na likambo nyonso oyo etali malako mpo na kosalela site oyo, likambo yango esengeli kokende na batribinale ya etúká ya New York (États-Unis).

Bonsomi ya kobongola makambo

 Soki tribinale moko emoni ete likambo moko oyo ezali na malako oyo ebongi te, ezali lisusu na ntina te to eyokani te na mibeko ya Leta, malako oyo etikali ekokoba kotosama. Soki Watchtower esaleli te likambo moko oyo ezali awa, yango elimboli te ete moto akoki kotosa yango lisusu te.

Kɔntra mobimba

 Malako oyo ezali awa ezali kɔntra oyo osali na Watchtower na oyo etali kosalela site Internet oyo. Watchtower ebwaki na mai kɔntra nyonso ya liboso etali kosalela site oyo.