Lakisá makambo oyo ezali na kati

NDENGE BAVƐRSƐ YA BIBLIA ELIMBOLAMI

Baroma 12:2​—“Bobongwana mpe bokomisa makanisi na bino makanisi ya sika”

Baroma 12:2​—“Bobongwana mpe bokomisa makanisi na bino makanisi ya sika”

 “Bótika kolanda makambo ya ntango oyo, kasi bóbongwana, bókómisa makanisi na bino makanisi ya sika, mpo bómindimisa bino moko mokano ya Nzambe oyo ezali malamu mpe ekoki kondimama mpe ezali ya kokoka.”​—Baroma 12:2, Biblia​—Libongoli ya Mokili ya Sika.

 “Bólanda ezalela ya bato ya nsé eye te, kasi bókóma bato ba mayéle ma sika, na mitéma mya sika. Bôngó bokoyéba nini nzambe alingi bósála, nini ezali malamu mpe ekosépelisa ye, mpe nini ebongi mye mpenza.”—Baroma 12:2, Biblia liloba lya Nzambe.

Ndenge Baroma 12:2 elimbolami

 Baoyo balingi kosepelisa Nzambe basengeli kosuka kaka te na koboya makanisi ya mabe kasi basengeli mpe kobongola bomoto na bango. Nzambe atindaka bango na makasi te ete babongwana; kasi basalaka bongo mpo balingaka ye mpe bayebi ete makambo oyo asɛngaka bango ezali na ntina mpe ete alekisaka ndelo te, mpe lisusu makambo yango ememelaka bango matomba.​—Yisaya 48:17.

 “Botika kolanda makambo ya ntango oyo “Makambo ya ntango oyo,” elingi koloba, mokili oyo eyangelami na bato na nzela ya mibeko, mimeseno mpe bizaleli na yango oyo eyokani te na makanisi ya Nzambe. (1 Yoane 2:15-17) Ezalaka ntango nyonso na nguya likoló ya bato, mpe yango ekoki kobongola bomoto mpe bizaleli na bango. Mpo moto asambela Nzambe na ndenge oyo alingaka, asengeli kotɛmɛla bizaleli ya mokili, soki asali bongo te, akoki kokoma na bizaleli oyo ekoki kozala likama mpo na ye moko mpe oyo esepelisaka Nzambe te.​—Baefese 2:1-3; 4:17-19.

 “Bobongwana, bókómisa makanisi na bino makanisi ya sika.” Moto asengeli mpe kosala makasi abongola makanisi mpe mayoki na ye. Ndenge oyo mbongwana yango esengeli kosalema emonisami na liloba ya Grɛki oyo ebongolami na “kobongwana,” oyo emonisi mbongwana oyo mbinzo esalaka mpo ekoma lipekapeka. Baoyo basambelaka Nzambe basengeli kolata “bomoto ya sika.”​—Baefese 4:23, 24; Bakolose 3:9, 10.

 “Mpo bómindimisa bino moko mokano ya Nzambe oyo ezali malamu mpe ekoki kondimama mpe ezali ya kokoka.” Nzambe alingi ete baoyo basambelaka ye bámindimisa mpenza na mateya oyo bandimelaka. Basalaka bongo na ndenge bayekolaka Liloba ya Nzambe, basalelaka makambo oyo yango elobi, mpe na ndenge bamonaka matomba oyo eutaka na kotosa mibeko ya Nzambe. Na ndenge yango, bamonisaka ete makambo oyo Nzambe asɛngaka ezalaka malamu koleka.​—Nzembo 34:8.

Makambo oyo ezali na Baroma 12:2

 Baroma mokapo 12 elobeli makambo oyo moto asengeli kosala mpo asambela Nzambe na ndenge oyo andimaka. Losambo ya ndenge wana esimbi makambo nyonso ya bomoi mpe esɛngi ete moto asalela “makoki na ye ya kokanisa” na esika andima kaka makambo bindimelá to mpe alanda kaka mayoki na ye. (Baroma 12:1, 3) Mokapo yango ezali na toli ya ntina oyo emonisi ndenge ya komonisa bizaleli ya malamu, ndenge ya kosalela basusu makambo, mpe oyo tosengeli kosala ntango basusu basaleli biso makambo na bosembo te.​—Baroma 12:9-21.