Lakisá makambo oyo ezali na kati

NDENGE BAVƐRSƐ YA BIBLIA ELIMBOLAMI

Baebre 11:1—“Kondima ezali ezaleli ya kozela na motema mobimba biloko oyo ozali kolikya kozwa”

Baebre 11:1—“Kondima ezali ezaleli ya kozela na motema mobimba biloko oyo ozali kolikya kozwa”

 “Kondima ezali ezaleli ya kozela na motema mobimba biloko oyo ozali kolikya kozwa, ezali elembeteli oyo ezali komonisa bosolo ya makambo atako ezali komonana te.”​—Baebre 11:1, BibliaLibongoli ya Mokili ya Sika.

 “Kondima ezali elendiseli na bilɔkɔ bokolikia biso; ezali mpe elimbweli na bilɔkɔ bozangi komɔnana.”​—Baebre 11:1, Biblia Haut fleuve.

Ndenge Baebre 11:1 elimbolami

 Vɛrsɛ oyo ezali kopesa ndimbola ya sikisiki ya Makomami na likambo etali kondima mpe ezali komonisa ete kondima esengeli kosuka kaka te na koloba ete tondimelaka moto to eloko moko boye.

 “Kondima ezali ezaleli ya kozela na motema mobimba biloko oyo ozali kolikya kozwa.” Liloba ya Grɛki oyo basaleli na Baebre 11:1, oyo ebongolami na “kondima” ezali kopesa likanisi ya kotyela motema, kondimela, to kondimisama mpenza. Kondima ya ndenge wana esimbami te na makambo oyo ezali lokola ndɔtɔ to oyo ekoki kosalema te; “ezali ezaleli ya kozela na motema mobimba.” Liloba ya Grɛki oyo ebongolami na “kozela na motema mobimba” a ekoki mpe kobongolama na “elembeteli,” mpo na komonisa ndanga oyo esalaka ete moto atyá motema, to azala na kondima epai ya moto oyo azali na eloko yango.

 “Kondima ezali . . . elembeteli oyo ezali komonisa bosolo ya makambo atako ezali komonana te.” Kondima esimbami na bilembeteli ya solosolo. Lokola bilembeteli yango ezali makasi, yango esalaka ete moto andima eloko moko, atako azali komona yango te.

Makambo oyo bazali kolobela na Baebre 11:1

 Mokanda ya Baebre ezali mokanda oyo ntoma Paulo atindelaki Bakristo ya siɛklɛ ya liboso, oyo bazalaki kofanda na Yerusaleme mpe na bamboka oyo ezalaki penepene ya engumba yango. Na eteni oyo ya mokanda na ye, Paulo alobeli ntina ya kozala na kondima. Na ndakisa, akomaki boye: “Soki moto azali na kondima te akoki kosepelisa ye ata moke te, mpo moto oyo azali kopusana epai ya Nzambe asengeli kondima ete ye azali mpe akómaka moto oyo apesaka mbano na baoyo bazali koluka ye na mposa makasi.” (Baebre 11:6) Nsima ya kolimbola soki kondima ezali nini na Baebre 11:1, Paulo apesi ndakisa ya basi mpe mibali oyo Biblia elobi ete bamonisaki kondima. Alobeli ndenge bamonisaki kondima na bango na ndenge basalaki makambo na boyokani na mokano ya Nzambe.​—Baebre 11:4-38.

a Liloba ya Grɛki oyo ebongolami na “ezaleli ya kozela na motema mobimba” ezali hy·poʹsta·sis, oyo ekoki mpe kolakisa “oyo ezali likoló ya mobɔkɔ.”