Lakisá makambo oyo ezali na kati

NDENGE BAVƐRSƐ YA BIBLIA ELIMBOLAMI

Ebandeli 1:1​—“Na ebandeli Nzambe azalisaki likoló mpe mabele”

Ebandeli 1:1​—“Na ebandeli Nzambe azalisaki likoló mpe mabele”

 “Na ebandeli Nzambe azalisaki likoló mpe mabele.”​—Ebandeli 1:1, Biblia​—Libongoli ya Mokili ya Sika.

 “Na ebandeli Nzambe azalisaki likolo mpe mokili.”​—Ebandeli 1:1, Biblia haut fleuve.

Ndenge Ebandeli 1:1 elimbolami

 Vɛrsɛ oyo ya liboso ya Biblia elobeli makambo mibale ya ntina mpe oyo ezali solo. Ya liboso, “likoló mpe mabele,” to mokili, ezalaki na ebandeli. Ya mibale, Nzambe nde akelaki yango.​—Emoniseli 4:11.

 Biblia emonisi te ntango boni elekaki mpo Nzambe akela mokili, elimboli mpe te ndenge oyo Nzambe akelaki yango. Kasi emonisi ete akelaki mokili ‘na makasi mingi oyo azali na yango na kati ya nguya.’​—Yisaya 40:26.

 Liloba “azalisaki” euti na verbe ya Ebre oyo esalelamaka kaka mpo na komonisa mosala oyo Nzambe asali. a Na Biblia, kaka Yehova b Nzambe nde abengami Mozalisi.​—Yisaya 42:5; 45:18.

Makambo oyo bazali kolobela na Ebandeli 1:1

 Vɛrsɛ oyo ya liboso ya mokanda ya Ebandeli ebandi na lisolo ya bozalisi oyo ezali na mokanda ya Ebandeli mokapo 1 mpe 2. Kobanda na Ebandeli 1:1 tii 2:4, Biblia elobeli na mokuse makambo oyo Nzambe asalaki mpo na kozalisa mabele mpe bikelamu nyonso oyo ezali na bomoi, ezala mpe mwasi ná mobali ya liboso. Nsima ya kolobela makambo ya ntina etali bozalisi, Biblia elobeli na bosikisiki ndenge Nzambe akelaki mobali mpe mwasi ya liboso.​—Ebandeli 2:7-25.

 Mokanda ya Ebandeli emonisi ndenge Nzambe akelaki biloko nyonso na boumeli ya eleko ya “mikolo” motoba. Mpo na koloba solo, ezalaki te mikolo ya ngonga 24, kasi ezalaki bileko ya ntango molai oyo eyebani te. Kutu, liloba “mokolo” ekoki kosalelama mpo na kolobela bileko ya ntango oyo eleki ngonga 24. Yango emonisami na Ebandeli 2:4, oyo esaleli liloba “mokolo” mpo na kolobela “ntango” mpe elobi ete Nzambe azalisaki biloko nyonso na boumeli ya mikolo motoba oyo elekaki lokola nde esali “mokolo” moko.

Makanisi ya libunga oyo bato bakanisaka mpo na Ebandeli 1:1

 Likanisi ya libunga: Nzambe akelaki mokili na boumeli ya mwa bankóto ya bambula.

 Likambo ya solo: Biblia emonisi te ntango nini mokili ezalisamaki. Maloba oyo ezali na Ebandeli 1:1 eboyi te makambo oyo bato ya siansi bandimaka lelo oyo ete banda mokili ezalisamá eleki bamiliare ya bambula. c

 Likanisi ya libunga: Ebandeli 1:1 emonisi ete Nzambe azali Bosato mpo liloba ya Ebre “Nzambe” oyo basaleli na vɛrsɛ oyo ezali na boike (pluriel).

 Likambo ya solo: Titre “Nzambe” ebongolami na liloba ya Ebre ’Elo·him, oyo ezali na boike (pluriel), mpo na komonisa lokumu, nkembo, kasi elakisi te motángo ya bato. Buku New Catholic Encyclopedia emonisi ete ndenge basaleli liloba ’Elo·himʹ na boike na Ebandeli 1:1 “mbala mingi ezwaka verbe na booko (singulier), emonisaka lokola liloba ‘biso’ oyo mokonzi asalelaka, mpo na komonisa lokumu mingi oyo azali na yango, kasi epesaka te likanisi ya motángo moko boye.”​—Ebimeli ya mibale, Volimi 6, lokasa 272.

Tángá Ebandeli mokapo 1 ná maloba na nse ya lokasa, mpe ndimbola ya maloba oyo oyebi malamu te.

a Mpo na verbe yango, buku moko ya boyekoli ya Biblia HCSB elobi: “Soki basaleli verbe ya Ebre bara’ oyo elimboli ‘kozalisa,’ basalelaka yango ata moke te mpo na kolobela eloko moko oyo moto asali. Na yango verbe bara’ epesaka likanisi ya mosala oyo kaka Nzambe nde akoki kosala.”​—Lokasa 7.

b Yehova ezali nkombo ya Nzambe na Biblia.​—Nzembo 83:18.

c Mpo na maloba ya Ebre oyo ebongolami na “na ebandeli,” buku moko The Expositor’s Bible Commentary elobi: “Maloba yango emonisi mpenza te soki elekaki ntango boni.”​—Ebimeli oyo ebongisami lisusu, Volimi I, lokasa 51.