Lakisá makambo oyo ezali na kati

NDENGE BAVƐRVƐ YA BIBLIA ELIMBOLAMI

Nzembo 46:10​​—“Zalá nyɛɛ mpe yebá ete ngai nazali”

Nzembo 46:10​​—“Zalá nyɛɛ mpe yebá ete ngai nazali”

 “Bómitika mpe bóyeba ete ngai nazali Nzambe. Nakokumisama na kati ya bikólo; Nakokumisama na mabele.”—Nzembo 46:10, Libongoli ya Mokili ya Sika.

 “Jala nyɛɛ mpe yeba ete ngai najali Njambe; nakokumisama kati na mokili.”—Nzembo 46:10, haut fleuve.

Ndenge Nzembo 46:10 elimbolami

 Nzambe alendisi moto nyonso asambela ye mpe andima lotomo na ye ya koyangela na mabele mobimba. Azali na nguya mpe bokonzi oyo eleki nyonso; moto nyonso oyo alingi kozala na bomoi libela na libela asengeli kondima likambo yango.—Emoniseli 4:11.

 “Bómitika mpe bóyeba ete ngai nazali Nzambe.” Babiblia mosusu ebongoli eteni ya liboso na “Zalá nyɛɛ.” Yango ememi bato bákóma na likanisi ya libunga ete vɛrsɛ yango elendisi kozala na limemya to kofanda nyɛɛ na ndako-nzambe. Kasi, fraze ya Ebre oyo ebongolami na “bómitika mpe bóyeba ete ngai nazali Nzambe” ezali malendisi oyo Yehova a Nzambe ye moko apesi epai ya bato ya bikólo nyonso, asɛngi bato bátika kotɛmɛla ye mpe bándima ete kaka ye nde abongi na losambo.

 Maloba ya bongo ezali mpe na Nzembo mokapo 2. Kuna, Nzambe alaki ete akopesa etumbu na baoyo batɛmɛlaka ye. Nzokande, baoyo bandimi bokonzi ya Nzambe batalelaka ye mpo na kozwa litambwisi, makasi, mpe bwanya. Lokola “bazali kokima epai ya Nzambe,” bazalaka na esengo mpe bazalaka na libateli, mingimingi na ntango ya mpasi.​—Nzembo 2:9-12.

 “Nakokumisama na kati ya bikólo; nakokumisama na mabele.” Na kala, Yehova Nzambe akumisamaki ntango asalelaki nguya na ye monene mpo na kobatela bato na ye. (Kobima 15:1-3) Na mikolo ezali koya, akokumisama lisusu mingi koleka ntango moto nyonso na mabele akondima bokonzi na ye mpe akosambela ye.​—Nzembo 86:9, 10; Yisaya 2:11.

Makambo oyo bazali kolobela na Nzembo 46

 Buku moko ebengi Nzembo 46 “loyembo oyo ekumisaka nguya ya Nzambe, mobundi makasi ya bato na ye.” Ntango bazalaki koyemba Nzembo 46, bato ya Nzambe bazalaki komonisa ete batyelaka Yehova motema ete azali na likoki ya kobatela mpe kosalisa bango. (Nzembo 46:1, 2) Maloba ya Nzembo yango ezalaki kosalisa bango bábosana te ete Yehova azalaki na bango ntango nyonso.—Nzembo 46:7, 11.

 Mpo na kosalisa bango bátya motema mingi na nguya ya kobatela oyo Yehova Nzambe azali na yango, nzembo yango esɛngaki bango bákanisa makambo oyo asalaki na nguya na ye. (Nzembo 46:8) Ebendi likebi mingimingi na likoki na ye ya kosilisa bitumba. (Nzembo 46:9) Tokoki koloba ete Yehova asilisaki bitumba na ntango ya kala na ndenge abatelaki bato na ye na bikólo ya banguna. Kasi, Biblia elaki ete mosika te, Nzambe akosilisa bitumba na mabele mobimba.—Yisaya 2:4.

 Lelo oyo mpe Yehova asalisaka basaleli na ye? Ɛɛ. Kutu, ntoma Paulo alendisaki bakristo polele ete bátya motema ete Nzambe akosunga bango. (Baebre 13:6) Makanisi oyo ezali na Nzembo 46 elendisi biso tótya motema na nguya ya Nzambe ya kobatela biso. Ezali kosalisa biso tómona ete Nzambe azali “ekimelo mpe makasi na biso.”—Nzembo 46:1.

 Talá video oyo elobeli na mokuse makambo oyo ezali na mokanda ya Nzembo.

a Yehova ezali nkombo ya Nzambe. (Nzembo 83:18) Talá lisolo “Yehova azali nani?