Lakisá makambo oyo ezali na kati

Mekolá kondima na bango​—Basi mpe mibali oyo Biblia elobeli

Masolo oyo elobeli bomoi ya basi mpe ya mibali oyo Biblia elobeli oyo bamonisaki kondima makasi. * Bato yango mpe ndakisa ya kondima na bango oyo Biblia elobeli ekoki kosalisa yo akómisa kondima na yo moko makasi mpe okóma moninga ya motema ya Nzambe.

^ par. 2 Mpo na kosalisa yo omona ndenge makambo elekaki na bomoi na bango mpe omikɔtisa na mozindo na masolo ya kondima na bango, masolo oyo elobeli makambo mosusu ya mikemike oyo ozali na Biblia te. Bolukiluki esalemi malamumalamu mpo na makambo yango ya mikemike mpo na komindimisa ete eyokani na masolo oyo Biblia elobeli, na makambo ya istware mpe na biloko oyo bato ya arkeoloji bakundoli.

Baanda na bozalisi tii na Mpela

Abele​—“Atako akufá, azali naino koloba”

Makambo nini tokoki koyekola na ntina na Abele mpe kondima na ye atako Biblia elobeli ye mingi te?

Enoka​—“Asepelisaki mpenza Nzambe”

Soki ozali na mikumba ya libota mpe ozali kokangama na oyo ezali malamu, kondima ya Enoka ekoki koteya yo.

Noa​—“Atambolaki elongo na Nzambe ya solo”

Noa ná mwasi na ye bakutanaki na mikakatano nini mpo na kobɔkɔla bana na bango? Ndenge nini bamonisaki kondima mpo na kotonga masuwa?

Noa​—Nzambe abatelaki Noa “ná bato mosusu nsambo”

Ndenge nini Noa ná libota na ye babikaki na eleko ya mpasi oyo ekómelaki naino bato liboso te?

Banda na Mpela tii na Kobima

Abrama​—“Tata ya bato nyonso oyo bazali na kondima”

Ndenge nini Abrama amonisaki kondima? Na makambo nini okosepela komekola kondima ya Abrama?

Sara​—“Ozali mwasi moko kitoko mingi”

Na Ezipito, bankumu bamonaki ete Sara azalaki kitoko mingi. Oyo esalemaki na nsima ekoki kokamwisa yo.

Sara “Mama ya Bakonzi”

Mpo na nini nkombo ya sika oyo Nzambe apesaki Sara, ebongaki mpenza?

Rebeka​—“Nandimi”

Longola kondima, Rebeka azalaki mpe na bizaleli mosusu ya malamu.

Yozefe​—“Nabondeli bino, bóyoka ndɔtɔ oyo nalɔti”

Libota ya Yozefe ezalaki na mindɔndɔ, yango ekoki koteya mabota oyo ebɔkɔlaka bana oyo molongani abotaki na libala mosusu.

Yozefe​—“Ndenge nini nakoki kosala mabe monene boye?”

Ndenge nini Yozefe akweaki te atako mwasi ya Potifare azalaki na ekateli ya kolɛngola ye?

Yozefe​—“Nzambe nde alimbolaka makambo, boye te?”

Nini esalisaki Yozefe alimbola na mpiko nyonso bandɔtɔ ya kapita ya bapesi-masanga, ya basali-mampa mpe ya Farao ye moko? Ndenge nini Yozefe alongwaki na bolɔkɔ mpe akómaki na ndako ya mokonzi kaka na mokolo moko mpamba?

Yozefe​—“Ngai nazali nde na esika ya Nzambe?”

Libota na bino ekutaná naino te na makambo lokola likunya, kotɛka to koyina basusu? Soki ɛɛ, lisolo ya Yozefe oyo ezali na Biblia ekoki kosalisa yo.

“Nakotika bosembo na ngai te!”

Ndenge nini lisolo ya Yobo oyo Biblia elobeli ekoki kosalisa biso tólonga mikakatano, kozanga to mpe makambo mosusu oyo ekoki kotya kondima na biso na komekama?

Yobo​—Yehova abikisaki bampasi na ye

Eloko moko te ekobangisa Satana mingi, to kosepelisa motema ya Yehova mingi, soki kaka tomekoli kondima ya Yobo!

Miriame​—“Bóyembela Yehova”!

Nzambe asalelaki mosakoli-mwasi, Miriame mpo na kokamba basi ya Yisraele báyemba loyembo ya elonga na Mbu Motane. Bomoi na ye eteyi biso tózala na mpiko, kondima, mpe komikitisa.

Banda na Kobima tii na Mokonzi ya liboso ya Yisraele

Rahaba—“Atángamaki moyengebene mpo na misala na ye”

Ndenge nini lisolo ya bomoi ya Rahaba emonisi ete moto nyonso azali na motuya na miso ya Yehova? Kondima na ye ekoki koteya biso nini?

Debora​—“Natɛlɛmaki lokola mama na Yisraele”

Lisolo ya Biblia oyo elobeli Debora eteyi biso nini na oyo etali kondima mpe mpiko?

Ruta​—“Epai okokende, ngai mpe nakokende”

Mpo na nini Ruta andimaki kotika libota mpe mboka na ye? Bizaleli nini oyo amonisaki oyo esalaki ete Yehova andima ye?

Ruta​—“Mwasi moko malamu mingi”

Mpo na nini libala ya Ruta ná Boaze ezali na ntina mingi? Mateya nini tokoki kozwa epai ya Ruta ná Naomi na likambo etali libota?

Hana​—Abondelaki Nzambe na motema mobimba

Kondima ya Hana epai ya Yehova esalisaki ye alonga mokakatano oyo ezalaki komonana lokola ete moto moko te akokoka kolonga yango.

Samwele​—“Azalaki se kokola liboso ya Yehova”

Mpo na nini ndenge oyo Samwele akolaki ekesanaki na bana mosusu? Nini esalaki ete kondima na ye ekóma makasi ntango azalaki na tabernakle?

Samwele​—Ayikaki mpiko atako makambo ebebaki

Biso nyonso tokutanaka na bampasi mpe mikakatano oyo etyaka kondima na biso na komekama. Ndenge oyo Samwele ayikaki mpiko eteyi biso nini?

Banda na Mokonzi ya liboso ya Yisraele tii na kobotama ya Yesu

Yonatane​—“Eloko moko te ekoki kopekisa Yehova”

Yonatane akambaki etumba oyo bazalaki kaka bato mibale mpo na kobundisa etuluku mobimba ya basoda oyo bazalaka liboso mpe likambo yango etikalá istware.

Davidi​—“Etumba ezali ya Yehova”

Nini esalisaki Davidi alonga Goliate? Lisolo ya Davidi ekoki koteya biso nini?

Davidi ná Yonatane​—“Basalaki boninga makasi mpenza”

Ndenge nini bato mibale oyo bakesenaki na mbula mpe na makambo ya bomoi bakómaki baninga ya motema? Ndenge nini eksperiansi na bango ekoki kosalisa yo osala boninga lelo oyo?

Abigaile​—Asalaki na bokɛngi

Liteya nini tokoki kozwa na libala ya mpasi oyo Abigaile azalaki na yango?

Eliya​—Alongisaki losambo ya solo

Ndenge nini tokoki komekola Eliya ntango tokutani na bato oyo bandimaka te makambo oyo Biblia eteyaka?

Eliya​—Azalaki kotala mpe azalaki kozela

Ndenge nini mosakoli Eliya amonisaki ezaleli moko kitoko mpenza ntango azalaki kozela ete Yehova akokisa elaka na ye?

Eliya​—Nzambe na ye abɔndisaki ye

Makambo nini esalaki ete Eliya atungisama mingi, alɛmba nzoto mpe asɛnga kutu kokufa?

Eliya​—Ayikaki mpiko na makambo ya kozanga bosembo

Basí basalelá yo makambo ya kozanga bosembo? Ozalaka na mposa ete Nzambe abongisa makambo? Talá ndenge okoki komekola kondima ya Eliya moto ya sembo.

Eliya​—Ayikaki mpiko tii na nsuka

Ndakisa ya bosembo ya Eliya na likambo etali koyika mpiko ekoki kokómisa kondima na biso makasi na ntango ya mpasi.

Yona​—Mabunga na ye eteyaki ye

Yona abangaki kondima mokumba oyo Nzambe apesaki ye, ozali na makanisi ndenge moko na ye? Lisolo na ye eteyi biso makambo minig ya ntina na likambo etali motema molai mpe boboto ya Yehova.

Yona​—Ayekolaki komonisa motema mawa

Ndenge nini lisolo ya Yona eteyi biso tómitalelaka na ndenge oyo ebongi?

Estere​—Alobaki mpo na ekólo ya Nzambe

Komonisa bolingo ya solosolo lokola Estere esɛngaka kondima mpe mpiko.

Estere​—Amonisaki bwanya, mpiko, mpe alukaki bolamu na ye moko te

Ndenge nini Estere alukaki bolamu ya Yehova mpe ya basaleli na ye?

Banda na kobotama ya Yesu tii na liwa ya bantoma

Maria​—“Talá! Nazali moombo ya Yehova!”

Eyano ya Maria epai ya anzelu emonisi nini na likambo etali kondima na ye? Wapi bizaleli mosusu kitoko oyo amonisaki?

Maria​—Azalaki “kokanisa yango . . . na motema na ye”

Makambo oyo Maria akutanaki na yango na Beteleme elendisaki mingi kondima na ye na bilaka ya Yehova.

Maria​—Ayikaki mpiko na mawa makasi oyo ezalaki lokola mopanga

Ndakisa ya Maria, mama ya Yesu, ekoki kosalisa yo soki ozali koyika mpiko na mawa makasi oyo ezali lokola “mopanga molai.”

Yozefe​—Abatelaki, asungaki mpe alɛmbaki bango te

Na makambo nini Yozefe abatelaki libota na ye? Mpo na nini akendaki na Maria mpe Yesu na Ezipito?

Marta​—“Nasilá kondima”

Ndenge nini Marta amonisaki kondima makasi ata na ntango ya mawa?

Maria Magadalena—“Namoni Nkolo!”

Maria Magadalena mwasi ya sembo azalaki moyekoli ya liboso oyo amonaki Yesu asekwi. Azwaki libaku malamu ya koyebisa basusu nsango malamu yango.

Petro​—Alongaki kobanga mpe ntembe

Ntembe ezali ezaleli moko ya mabe mpenza oyo ekoki kobebisa moto. Kasi Petro alongaki kobanga mpe ntembe na ye na likambo etali kolanda Yesu.

Petro​—Atikalaki sembo na komekama

Ndenge nini kondima mpe bosembo ya Petro esalisaki ye andima makambo ntango Yesu asembolaki ye?

Petro​—Ayekolaki kolimbisa epai ya Nkolo na ye

Liteya nini Yesu apesaki Petro na likambo etali kolimbisa? Ndenge nini Yesu amonisaki ete alimbisi Petro?

Timote​—“Mwana na ngai ya bolingo mpe ya sembo na kati ya Nkolo”

Nini esalisaki Timote atika ezaleli ya nsɔninsɔni ya bolenge mpe akóma misionɛrɛ ya makoki?