Lakisá makambo oyo ezali na kati

LISALISI MPO NA LIBOTA | LIBALA

Oyo nakoki kosala mpo na komonisa motema molai

Oyo nakoki kosala mpo na komonisa motema molai

 “Basi ná mibali bamekamaka mokolo na mokolo mpo na komonisa motema molai. Emonani ete ezalaka mpasi te kozala na motema molai ntango moto azali monzɛmba, kasi ezali na ntina mingi mpo libala elonga.”​—John.

 Mpo na nini osengeli kozala na motema molai?

  •   Ntango obali nde okobanda komona mabunga ya molongani na yo.

     “Nsima ya libala, na boumeli ya ntango, ezalaka mpasi te komona mwa bizaleli ya molongani na yo oyo esepelisaka yo te. Ntango okómi na makanisi ya mabe ya ndenge wana, ezalaka mpasi te moto azanga motema molai.”​—Jessena.

  •   Ntango ozangi motema molai, yango ekoki kotinda yo oloba likambo kozanga kokanisa liboso.

     “Naumelaka te koloba makambo oyo nazali kokanisa mpe mbala mosusu nalobaka likambo oyo nasengelaki te koloba. Soki nazalaká na motema molai, nakokaki kokanisa soki makambo oyo nalingi koloba ezali na ntina mpenza mpe kosala makambo mosusu kozanga koloba ata likambo moko.”​—Carmen

     Biblia elobi: “Bolingo ezali na motema molai mpe na boboto.” (1 Bakorinti 13:4) Emonani ete bato mibale oyo balinganaka bamoniselanaka motema molai. Kasi ezalaka ntango nyonso bongo te. John, oyo tolobelaki liboso, alobi boye: “Lokola bizaleli malamu nyonso, ezali mpasi te kozanga motema molai koleka komonisa yango. Esɛngaka kosala molende mpo na kokoba komonisa motema molai.”

 Ndenge nini okoki komonisa motema molai?

  •   Ntango likambo moko ya mbalakaka ebimi.

     Ndakisa: Molongani na yo alobi na yo likambo moko na kozanga boboto. Mbala mingi yo mpe ozalaka na mposa ya kozangisela ye maloba ya kozanga boboto.

     Toli ya Biblia: “Elimo na yo esilika nokinoki te, mpo nkanda efandaka nde na ntolo ya bazoba.”​—Mosakoli 7:9.

     Oyo okoki kosala mpo na komonisa motema molai: Koyanola nokinoki te. Meká naino koluka koyeba soki molongani na yo alingaki to te kozokisa yo to kofinga yo na makambo oyo alobi. Buku moko (Fighting for Your Marriage) elobi boye: “Mbala mingi tozongiselaka molongani na biso maloba na kolanda ndenge tososoli na likambo oyo molongani na biso alobaki kozanga koluka koyeba soki alingaki koloba nini to azalaki mpenza koloba nini.”

     Ata soki molongani azalaki koluka kotumola yo, monisá motema molai mpe omipekisa mpo ozongisa mabe na mabe, yango ekoki kosala ete makambo eya ndɔngɔ te. Biblia elobi: “Esika nkoni ezali te mɔtɔ ekufaka.”​—Masese 26:20.

     “Soki omeki kotalela mwasi na yo lokola monguna, meká kokanisa nini etindaki yo olinga ye mpe mbala moko meká kosalela ye makambo malamu.”​—Ethan.

     Mituna oyo ekosalisa yo:

    •  Nasalaka nini ntango molongani na ngai alobi to asali likambo moko ya kozanga boboto?

    •  Soki likambo ya boye esalemi lisusu, ndenge nini nakoki komonisa lisusu motema molai koleka?

  •   Ntango molongani na yo azali kozongela mbala na mbala likambo moko oyo epesaka nkanda.

     Ndakisa: Molongani na yo azalaka ntango nyonso na retare, yango esalaka ete ozelaka ye mpe osilikaka.

     Toli ya Biblia: “Bókoba kokanga motema moto na moto na makambo ya mosusu mpe kolimbisana na motema moko.”​—Bakolose 3:13.

     Oyo okoki kosala mpo na komonisa motema molai: Tyá boyokani na yo ná molongani na yo na esika ya liboso mpe bamposa na yo na nsima. Omituna boye: ‘Kokómisa likambo moko lokola ngomba ekobongisa boyokani na biso to ekoyeisa likambo ndɔngɔ?’ Lisusu, kobosana te ete “biso nyonso tobɛtaka mabaku mbala mingi.” (Yakobo 3:2) Yango emonisi ete yo mpe ozali na makambo ya kosala mpo na kobongisa makambo.

     “Ekómelaka ngai namonisela moninga na ngai motema molai mingi koleka mobali na ngai. Nakanisaka ezali mpo nalekisaka ntango mingi na mobali na ngai mpe namonaka mabunga oyo asalaka. Kasi motema molai ezali moko ya bizaleli ya bolingo, kutu emonisaka limemya. Ezali na ntina mingi na libala na ngai.”​—Nia.

     Mituna oyo ekosalisa yo:

    •  Ozalaka motema molai na mabunga ya molongani na yo?

    •  Okosala nini mpo omonisa lisusu motema molai koleka na mikolo ezali koya?