Lakisá makambo oyo ezali na kati

LISALISI MPO NA LIBOTA | LIBALA

Pornografi ekoki kobebisa libala na yo

Pornografi ekoki kobebisa libala na yo

 Mwasi na ye akangaki ye. Mobali yango asɛngaki bolimbisi mingi. Alobaki ete akosala yango lisusu te, mpe alongaki​—kaka mpo na mwa ntango. Kasi ezalaki kosalema kaka bongo soki akwei lisusu mpe mwasi na ye akangi ye.

 Likambo ya boye ezali mpe kokómela yo? Soki bongo, osengeli koyeba ndenge oyo molongani na yo azali komiyoka mpo na momeseno na yo ya kotala pornografi mpe ndenge okoki kotika momeseno yango mpo na libela. a

Na lisolo oyo tokomona

 Oyo osengeli koyeba

 Pornografi ekoki kobebisa libala. Etindaka molongani mosusu abomba nkanda na motema mpe atyela lisusu moninga motema te. b

 Mwasi oyo mobali na ye atalaka pornografi akoki mbala mosusu komiyoka ete:

  •   Basali ye mabe. Mwasi moko na nkombo Sarah alobi: “Ezalaki lokola nde mobali na ngai asalaki ekobo mbala na mbala.”

  •   Abongi te. Mwasi moko alobi ete ndenge mobali na ye azalaki kotala pornografi etindaki ye amona ete azali “kitoko te mpe azali mwasi ya nsɔni.”

  •   Akotyela lisusu mobali motema te. Mwasi moko na nkombo Helen alobi: “Nakóma mayelemayele na likambo nyonso oyo mobali na ngai azali kosala.”

  •   Atungisami. Mwasi moko na nkombo Catherine alobi: “Komitungisa mpo na momeseno wana ya mobali na ngai elyaki ngai nzoto.”

 Kanisá naino: Biblia eyebisi mibali bálinga basi na bango. (Baefese 5:25) Mobali oyo asalaka makambo oyo etindaka mwasi na ye azala na mayoki oyo tolobeli likoló, alingaka ye?

 Oyo okoki kosala

 Kotika momeseno ya kotala pornografi ezali pɛtɛɛ te. Mwasi moko na nkombo Stacey alobi: “Mobali na ngai atikaki momeseno ya komɛla makaya, bangi, mpe masanga, kasi azali naino kobunda mpo na kotika kotala pornografi.”

 Soki ozali na kati ya likambo yango, makanisi oyo elandi ekoki kosalisa yo otika momeseno yango mpo na libela.

  •   Yebá ntina oyo pornografi ezali mabe. Pornografi etindaka moto asala oyo amoni ete ezali litomba na ye mpo na komisepelisa, mpe yango ebebisaka bolingo, kotyelana motema, mpe bosembo, bizaleli oyo ezali na ntina mingi na libala. Kotala pornografi emonisaka mpe kozanga limemya epai ya Yehova Nzambe, Moto oyo asalaki libala.

     Toli ya Biblia: “Libala ekumisama na kati ya bato nyonso.”​—Baebre 13:4.

  •   Kopesa basusu foti te mpo na misala na yo. Koloba te: ‘Nalingaki kotala pornografi te soki mwasi na ngai ayebaki malamu komonisa lolango.’ Kopesa mwasi na yo foti ezali kozanga bosembo, mpe yango ekotinda yo ozongela lisusu momeseno yango soki asali likambo oyo esepelisi yo te.

     Toli ya Biblia: “Moto na moto amekamaka nde na mposa na ye moko oyo ezali komema ye mpe kobenda ye.”​—Yakobo 1:14.

  •   Sololá makambo nyonso na bosembo ná molongani na yo. Mobali moko na nkombo Kevin alobi: “Natunaka mwasi na ngai mituna mikolo nyonso. Nakobaki kotala eloko moko ya mbindo, to nalongolaki mbala moko miso? Na yango, amonaka te ete nabombelaka ye kaka makambo.”

     Toli ya Biblia: “Tolingi kozala sembo na makambo nyonso.”​—Baebre 13:18

  •   Kobá kozala ekɛngɛ. Okoki kokwea lisusu na kotala pornografi ata bambula mingi na nsima. Kevin, oyo tolobelaki liboso, alobi: “Natalaki pornografi te mbula 10 mpe namilobaki ete mokakatano yango esili. Kasi, mposa wana ezalaki lokola nyama mabe oyo ebombani, oyo ezali kozela libaku moko mpo ebimela ngai.”

     Toli ya Biblia: “Moto oyo akanisi ete atɛlɛmi akeba ete akwea te.”​—1 Bakorinti 10:12.

  •   Soki mposa ya kotala eyei, zelá. Mbala mosusu okoki te kopekisa mposa wana ya makasi eyela yo, kasi okoki kopona soki okokokisa mposa yango to te. Mposa yango ekoleka​—mbala mosusu ekoleka kutu mbangu soki oyekoli komema makanisi na yo na makambo mosusu.

     Toli ya Biblia: “Mokomoko na bino ayeba kopekisa nzoto na ye na kosantisama mpe lokumu, na mposa ya lokoso ya kosangisa nzoto te.”​—1 Batesaloniki 4:4, 5.

  •   Kimá makambo oyo ekoki kokweisa yo. Buku moko (Willpower’s Not Enough) elobi: “Soki okutani na likambo oyo ekoki kokweisa yo, ezali lokola nde opelisi allumette. Soki kaka ekutani na mwa esansi moke . . . mɔtɔ epeli.”

     Toli ya Biblia: “Ata eloko moko te oyo eyokisaka mpasi ekonza ngai.”​—Nzembo 119:133.

  •   Kobungisa elikya te. Ekoki kozwa ntango molai​—ata mpe bambula mingi​—mpo molongani na yo abanda lisusu kotyela yo motema. Kasi ezali na bandakisa oyo emonisi ete ekoki kosalema.

     Toli ya Biblia: “Bolingo ezali na motema molai.”​—1 Bakorinti 13:4.

a Ata soki lisolo oyo elobeli mibali, makanisi oyo ezali awa etali mpe basi oyo batalaka pornografi.

b Bato mosusu oyo babalá balobaka ete kotala pornografi mwasi ná mobali elongo ekoki kobongisa libala na bango. Kasi, momeseno yango eyokani te na mitinda ya Biblia.​—Masese 5:15-20; 1 Bakorinti 13:4, 5; Bagalatia 5:22, 23.