Lakisá makambo oyo ezali na kati

Biblia elobi nini na likambo ya kozongisa makila?

Biblia elobi nini na likambo ya kozongisa makila?

Eyano ya Biblia

 Biblia epekisi biso kolya makila. Na yango, tosengeli te kondima makila to biloko oyo ezalaka na kati na yango, ezala mpo na kolya to kokɔtisa na nzoto. Talá bavɛrsɛ ya Biblia oyo elandi:

  •   Ebandeli 9:4. Nsima ya Mpela, Nzambe apesaki Noa ná libota na ye nzela bábanda kolya nyama, kasi apekisaki bango kolya makila. Nzambe alobaki na Noa ete: “Kaka nde bosengeli kolya mosuni ná molimo na yango te, elingi koloba makila na yango.” Mobeko yango etali bato nyonso banda na ntango wana mpo biso nyonso tozali bankɔkɔ ya Noa.

  •   Balevi 17:14. “Bosengeli te kolya makila ya lolenge nyonso ya ekelamu ya mosuni, mpo molimo ya lolenge nyonso ya ekelamu ya mosuni ezali makila na yango. Moto nyonso oyo akolya yango, akolongolama.” Nzambe amonaki ete molimo, to bomoi, ezali na kati ya makila mpe ezali eloko na ye. Atako mobeko yango epesamaki kaka mpo na ekólo Yisraele, emonisi ete kolya makila ezali likambo ya lisɛki te na miso ya Nzambe.

  •   Misala 15:20. “Báboya . . . makila.” Nzambe apesaki bakristo mobeko lokola oyo apesaki Noa. Masolo ya kala emonisi ete bakristo ya liboso bazalaki koboya kolya makila, bazalaki ata mpe koboya komɛla yango lokola nkisi.

Mpo na nini Nzambe aboyi tósalela makila?

 Minganga mingi bamonisi ete koboya kozongisama makila ezali malamu mpenza. Nzokande likambo eleki ntina, Nzambe aboyi tózongisama makila mpo yango ezali na motuya mingi na miso na ye.​—Balevi 17:11; Bakolose 1:20.