Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kobala basi ebele ezali mabe?

Kobala basi ebele ezali mabe?

Eyano ya Biblia

 Na ntango moko boye, Nzambe atikaki ete mobali azala na basi ebele. (Ebandeli 4:19; 16:1-4; 29:18-29) Kasi Nzambe te moto abandisaki likambo ya kobala basi ebele. Apesaki Adama mwasi moko kaka.

 Nzambe atikaki Yesu Kristo azongisa mobeko na Ye ya ebandeli: mwasi moko mobali moko. (Yoane 8:28) Ntango batunaki Yesu mituna mpo na libala, alobaki boye: “Moto oyo azalisaki bango na ebandeli asalaki bango mobali ná mwasi mpe alobaki ete: ‘Yango wana mobali akotika tata na ye ná mama na ye mpe akokangama na mwasi na ye, mpe bango mibale bakozala mosuni moko.’”​—Matai 19:4, 5.

 Na nsima, elimo ya Nzambe etambwisaki moyekoli moko ya Yesu akoma ete: “Mobali mokomoko azala na mwasi na ye moko mpe mwasi mokomoko azala na mobali na ye moko.” (1 Bakorinti 7:2) Biblia elobi mpe ete na kati ya lisangá, mokristo ya mobali nyonso oyo abalá mpe azali na mikumba asengeli kozala “mobali ya mwasi kaka moko.”​—1 Timote 3:2, 12.