Lakisá makambo oyo ezali na kati

Elembo ya “mikolo ya nsuka,” to ‘ntango ya suka’ ezali nini?

Elembo ya “mikolo ya nsuka,” to ‘ntango ya suka’ ezali nini?

Eyano ya Biblia

 Biblia elobeli makambo oyo ekomonisa “bosukisi ya makambo ya ntango oyo,” to “suka ya mokili.” (Matai 24:3; Bible na Lingala ya lelo oyo) Biblia ebengi eleko yango “mikolo ya nsuka” to “ntango ya suka,” to “eleko ya nsuka.” (2 Timote 3:1; Danyele 8:19; Bible na Lingala ya lelo oyo) Talá mwa makambo ya ntina to bisakweli oyo emonisi mikolo ya nsuka to ntango ya nsuka:

  •   Bitumba na bisika mingi.​—Matai 24:7; Emoniseli 6:4.

  •   Nzala.​—Matai 24:7; Emoniseli 6:5, 6.

  •   Koningana makasi ya mabele.​—Luka 21:11.

  •   Bamaladi mabe to oyo epalanganaka.​—Luka 21:11.

  •   Mobulu ekobakisama.​—Matai 24:12.

  •   Bato bakobebisa mabele.​—Emoniseli 11:18.

  •   Bizaleli ya bato ekobeba ndenge ezali komonana epai ya bato mingi oyo “bazangi botɔndi, oyo bazangi bosembo, . . . oyo balingaka kosala boyokani te, oyo bakoselaka bato makambo, oyo bazangi komipekisa, bato ya nko, oyo balingaka makambo ya malamu te, oyo batɛkaka bamosusu, bato ya motó makasi, oyo bavimbi na lolendo.”​—2 Timote 3:1-4.

  •   Mabota ekobeba mpo na bato oyo “balinganaka te na kati ya libota” mpe mpo na bana oyo “batosaka baboti te.”​—2 Timote 3:2, 3.

  •   Bolingo ya bato mingi mpo na Nzambe ekokita.​—Matai 24:12.

  •   Bokosi ya mangomba ekomonana polele.​—2 Timote 3:5.

  •   Boyebi ya bisakweli ya Biblia ekobakisama, ata mpe oyo elobeli mikolo ya nsuka.​—Danyele 12:4.

  •   Nsango malamu ya Bokonzi ekosakolama na mabele mobimba.​—Matai 24:14.

  •   Bato mingi bakokipe te mpe bakotyola kutu makambo oyo emonisi mpenza ete nsuka ekómi pene.​—Matai 24:37-39; 2 Petro 3:3, 4.

  •   Bisakweli yango nyonso ekokokisama moko nsima ya mosusu, kaka mwa ndambo te to mingi na yango.​—Matai 24:33.

Tozali na “mikolo ya nsuka”?

 Ɛɛ. Makambo oyo ezali koleka na mokili mpe badati ya Biblia, emonisi ete mikolo ya nsuka ebandaki na 1914. Na ntango yango, Bokonzi ya Nzambe ebandaki koyangela na likoló mpe likambo ya liboso oyo esalaki ebenganaki Satana Zabolo ná bademo na likoló mpe basalaka misala na bango kaka awa na mabele. (Emoniseli 12:7-12) Bokonzi ya Satana likoló ya bato ezali komonana na bizaleli mpe makambo mabe oyo bato mingi bakómi na yango mpe yango nde ezali kosala ete mikolo ya nsuka ezala “ntango moko ya mpasi mpenza mpe ya mikakatano.”​—2 Timote 3:1.