Lakisá makambo oyo ezali na kati

Mpo na nini kobondela na nkombo ya Yesu?

Mpo na nini kobondela na nkombo ya Yesu?

Eyano ya Biblia

 Tosengeli kobondela Nzambe na nkombo ya Yesu mpo Nzambe andimaka tópusana penepene na ye kaka na nzela ya Yesu. Yesu alobaki: “Ngai nazali nzela mpe solo mpe bomoi. Moto moko te azali koya epai ya Tata soki na nzela na ngai te.” (Yoane 14:6) Yesu alobaki mpe na bantoma na ye ya sembo ete: “Ya solosolo mpenza, nalobi na bino ete: Soki bosɛngi Tata eloko akopesa bino yango na nkombo na ngai.”​—Yoane 16:23.

Ntina mosusu ya kobondela na nkombo ya Yesu

  •   Tokopesa Yesu ná Tata na ye, Yehova Nzambe, lokumu.​—Bafilipi 2:9-11.

  •   Tokomonisa ete tozali na botɔndi epai ya Nzambe ndenge atindaki Yesu akufa mpo na kobikisa biso.​—Matai 20:28; Misala 4:12.

  •   Tokondima ete kaka Yesu nde azali na mokumba ya kolobela bato epai ya Nzambe.​—Baebre 7:25.

  •   Tokomonisa ete tozali kopesa Yesu limemya mpo na mokumba na ye ya Nganga-Nzambe Monene oyo akoki kosalisa biso tóndimama na miso ya Nzambe.​—Baebre 4:14-16.