Lakisá makambo oyo ezali na kati

Komɛla likaya ezali lisumu?

Komɛla likaya ezali lisumu?

Eyano ya Biblia

 Biblia elobeli komɛla likaya te a to makambo mosusu etali komɛla likaya. Kasi, ezali na mitinda oyo emonisi ete Nzambe andimaka te bizaleli mabe oyo ekoki kobebisa sante mpe na ndenge yango emonisi ete komɛla likaya ezali lisumu.

  •   Komemya bomoi. “Nzambe . . . apesaka bato nyonso bomoi mpe mpema.” (Misala 17:24, 25) Lokola bomoi ezali likabo ya Nzambe, tosengeli te kosala likambo nyonso oyo ekokómisa bomoi mokuse, na ndakisa komɛla likaya. Na mokili mobimba, bato mingi bakufaka liwa ya mobesu kaka mpo na komɛla likaya.

  •   Kolinga mozalani. “Osengeli kolinga mozalani na yo lokola yo moko.” (Matai 22:39) Komɛla likaya esika bato mosusu bazali ezali bolingo te. Baoyo bazalaka pene ya moto oyo azali komɛla likaya bakoki kozwa bamaladi mosusu oyo mbala mingi bamɛli-makaya nde babɛlaka yango.

  •   Kozala basantu. “Bókaba nzoto na bino mbeka ya bomoi, ya bosantu, oyo Nzambe akoki kondima.” (Baroma 12:1) “Tómipɛtola na mbindo nyonso ya mosuni mpe ya elimo, tómonisaka ete tozali kobanga Nzambe mpo bosantu na biso ekóma ya kokoka.” (2 Bakorinti 7:1) Komɛla likaya ezali malamu te mpe eyokani te na kozala basantu​—elingi koloba, kozala pɛto, mpo baoyo bamɛlaka makaya bakɔtisaka pwazɔ na nzoto na kozanga kokana mpe yango ebebisaka mpenza nzoto na bango.

Biblia elobi likambo moko na oyo etali komɛla bangi mpe badrɔgɛ mosusu mpo na kominanola?

 Biblia etángi bangi te to badrɔgɛ mosusu ya ndenge wana. Kasi ezali na mitinda oyo esengeli kotalela na likambo etali kosalela badrɔgɛ ya ndenge wana mpo na kozwa mwa mopɛpɛ, oyo ekómisaka bato baombo. Longola makambo oyo touti kolobela, esengeli mpe kotalela makambo oyo elandi:

  •   Kobatela mayele na yo. “Osengeli kolinga Yehova Nzambe na yo na motema na yo mobimba . . . mpe na makanisi na yo nyonso.” (Matai 22:37, 38) “Bóbatela makanisi na bino mobimba.” (1 Petro 1:13) Moto akoki te kobatela makanisi na ye nyonso soki asalelaka drɔgɛ, mpe bato mingi kutu bakómá baombo ya drɔgɛ. Na esika bákanisa makambo ya malamu, makanisi na bango nyonso ekendaka kaka na kozwa drɔgɛ mpe kosalela yango​—Bafilipi 4:8.

  •   Kotosa mibeko ya Leta. ‘Bótosa baguvɛrnema mpe bakonzi.’ (Tito 3:1) Na mikili mingi, mibeko elandelaka likambo ya kosalela drɔgɛ. Soki tolingi kosepelisa Nzambe, tosengeli kotosa bakonzi ya Leta.​—Baroma 13:1.

a Awa, komɛla likaya etaleli kobenda kobenda milinga ya sigareti, ya cigare, ya mibokolo to pipe. Kasi, yango etaleli mpe makaya oyo batyaka na monɔkɔ, oyo babendaka na zolo, mpe makaya mosusu.