Lakisá makambo oyo ezali na kati

Biblia ekoki kosalisa ngai soki nazali na maladi oyo eumeli mingi?

Biblia ekoki kosalisa ngai soki nazali na maladi oyo eumeli mingi?

Eyano ya Biblia

 Ɛɛ. Nzambe asalisaka basaleli na ye oyo bazali na maladi. Soki mosaleli moko ya sembo ya Nzambe abɛli, Biblia elobi ete: “Yehova ye moko akosunga ye na mbeto ya maladi.” (Nzembo 41:3) Soki ozali na maladi oyo eumeli mingi, makambo misato oyo elandi ekoki kosalisa yo:

  1.   Bondelá Nzambe mpo apesa yo makasi ya kokanga motema. Okoki kozwa “kimya ya Nzambe oyo eleki makanisi nyonso,” mpe yango ekoki kokitisa mitungisi na yo mpe kopesa yo makasi.​—Bafilipi 4:6, 7.

  2.   Zalá na makanisi ya malamu. Biblia elobi: “Esengo ya motema ekoki kosalisa moto po ábika; kasi motema ya mawa esilisaka makasi nyonso ya nzoto.” (Masese 17:22, Bible na lingala ya lelo oyo) Yebáká kosɛkisa basusu, mpo yango ekoki kokitisa mawa na yo mpe kopesa yo nzoto makasi.

  3.   Zalá na elikya makasi mpo na mikolo ezali koya. Kozala na elikya ekoki kosalisa yo ozala na esengo atako ozali na maladi oyo eumeli. (Baroma 12:12) Biblia elobi ete na ntango moko boye, moto moko te akoloba: “Nazali na maladi.” (Yisaya 33:24) Na ntango wana, Nzambe akosilisa maladi nyonso oyo eumeli, oyo minganga ya lelo bazali kokoka kosilisa te. Na ndakisa, Biblia emonisi ete mibange bakokóma bilenge na maloba oyo: “Mosuni na ye ekóma ya sika koleka oyo ya bolenge; azonga na mikolo oyo azalaki na makasi ya bolenge.”​—Yobo 33:25.

 Simbá likambo oyo: Atako biso Batatoli ya Yehova tondimaka ete Nzambe asalisaka biso, tolukaka mpe lisalisi ya minganga soki tozali na maladi oyo eumeli mingi. (Marko 2:17) Kasi, totindaka moto te andima nkisi boye to boye; toyebi ete na makambo etali komisalisa, moto na moto asengeli kozwa ekateli na ye.