Lakisá makambo oyo ezali na kati

Biblia eteyaka ete ‘soki moto abiki, abiki mpo na libela’?

Biblia eteyaka ete ‘soki moto abiki, abiki mpo na libela’?

Eyano ya Biblia

 Te, Biblia eteyaka te ete ‘soki moto abiki, abiki mpo na libela.’ Moto oyo azwi lobiko mpo andimeli Yesu Kristo akoki kobungisa kondima yango mpe kozanga lobiko yango. Biblia elobi ete kobatela kondima esɛngaka milende makasi, ‘kobunda etumba makasi.’ (Yuda 3, 5) Ntoma Paulo ayebisaki bakristo ya siɛklɛ ya liboso oyo bandimaki Kristo ete: “Bókoba kosala mpo na lobiko na bino moko na kobanga mpe na kolɛnga.”​—Bafilipi 2:12.

Bavɛrsɛ ya Biblia oyo emonisi ete liteya ‘soki moto abiki, abiki mpo na libela’ ezali solo te

  •   Biblia ekebisi moto na masumu minene mpo ekoki kopekisa moto akɔta na Bokonzi ya Nzambe. (1 Bakorinti 6:9-11; Bagalatia 5:19-21) Soki moto akoki kobika mpo na libela, likebisi wana ezali na ntina te. Kutu, Biblia emonisi ete moto oyo abiki akoki kobungisa kondima soki azongeli momeseno ya kosala lisumu ya monene. Na ndakisa, Baebre 10:26 elobi: “Soki tozali na momeseno ya kosala lisumu na nko nsima ya kozwa boyebi ya sikisiki ya solo, mbeka mosusu ezali te mpo na masumu.”​—Baebre 6:4-6; 2 Petro 2:20-22.

  •   Yesu amonisaki ntina ya kobatela kondima ntango apesaki ndakisa moko oyo amikokanisaki na nzete ya vinyo mpe bayekoli na ye na bitape ya vinyo. Bamosusu kati na bango bakomonisa na mbuma na bango, to na misala na bango ete bandimeli ye, kasi na nsima bakobungisa kondima mpe ‘bakobwakama lokola bitape [ezangá ntina],’ bakozanga lobiko. (Yoane 15:1-6) Ntoma Paulo asalelaki ndakisa ya ndenge wana, alobaki ete bakristo oyo babateli kondima te ‘bakokatama.’​—Baroma 11:17-22.

  •   Bakristo basengeli ‘kosɛnzɛlaka.’ (Matai 24:42; 25:13) Baoyo bazali kolala mpɔngi ya elimo mpo bazali kosala “misala ya molili” to bazali kosala mpenza te mosala oyo Yesu apesaki mitindo, bakozanga lobiko.​—Baroma 13:11-13; Emoniseli 3:1-3.

  •   Bavɛrsɛ mingi emonisi ete baoyo babikisami basengeli koyika mpiko na bosembo nyonso tii na nsuka. (Matai 24:13; Baebre 10:36; 12:2, 3; Emoniseli 2:10) Bakristo ya siɛklɛ ya liboso bazalaki na esengo ntango bayokaki ete bandeko na bango bazalaki koyika mpiko na kondima na bango. (1 Batesaloniki 1:2, 3; 3 Yoane 3, 4) Okanisi ete Biblia ekoki kobɛta nsɛtɛ na likambo etali koyika mpiko na bosembo nyonso soki baoyo bayiki mpiko te bakobika kaka?

  •   Ntoma Paulo amonaki ete akobika mpenza kaka ntango liwa na ye ekómaki pene. (2 Timote 4:6-8) Na ebandeli mpenza, andimaki ete akoki kozanga lobiko soki atikeli bamposa ya nzoto nzela. Akomaki boye: “Nazali kobɛtabɛta nzoto na ngai mpe kokómisa yango lokola moombo, mpo, nsima ya kosakwela bamosusu, ngai moko naboyama te ezala na ndenge nini.”​—1 Bakorinti 9:27; Bafilipi 3:12-14.