Lakisá makambo oyo ezali na kati

EBIMÁ KAKA YANGO MOKO?

Kɔle oyo mbɛmbɛ babengi limace ebimisaka

Kɔle oyo mbɛmbɛ babengi limace ebimisaka

Minganga oyo basalaka lipaso bamonaki ntina ya kosalela kɔle mpo na kokanga bampota ntango bazali kosala lipaso. Ba-kɔle mingi oyo ezali lelo bakoki te kosalela yango na kati ya nzoto ya moto. Mpo ezalaka na pwazɔ, ekangamaka makasi ntango batye yango na nzoto ya moto, mpe esimbaka te na misuni ya nzoto. Nsima ya koyekola mai oyo mbɛmbɛ babengi limace ebimisaka, * bato ya siansi bayaki kozwa solisyo mpo na kosilisa mikakatano yango.

Kanisá naino: Ntango mbɛmbɛ babengi limace ekutani na likama, ebimisaka mai oyo ezali lokola kɔle oyo esalaka ete ekangama makasi na lokasa oyo ezali na mai. Lolenge wana ya komibatela esalisaka mbɛmbɛ yango, mpe ekoki kozala na likoki ya kosala mwa muvema.

Bato oyo basalaka bolukiluki bayekolaki mbɛmbɛ babengi limace mpe bamonaki makambo oyo esalaka ete ezala na kɔle wana ya makasi mpenza. Na ndakisa, mbɛmbɛ babengi limace esalelaka nguya moko oyo esalaka ete baatɔmɛ ebendana (liaison chimique to attraction électrostatique). Kɔle yango ekangaka makasi esika mbɛmbɛ yango etɛlɛmi mpe ebendanaka soki ekutani na likama. Ntango bayekolaki kosala kɔle moko na kolanda kɔle oyo mbɛmbɛ babengi limace ebimisaka, bato oyo basalaka bolukiluki basalaki kɔle oyo eleki mosika mpenza kɔle oyo minganga basalelaka lelo oyo, mpe ekoki kokanga enama ya nzoto oyo ezali na bomoi. Balobi ete ekangisaka mosuni kaka “ndenge moko ná mosuni oyo ekangisaka mikuwa mibale ya libɔlɔngɔ.”

Bato ya mayele yango balobi ete kɔle yango ekoki kosalisa mingi na kosala lipaso kozanga ete básalela ntonga mpo na kotonga bampota. Bakoki kosalela yango mpe mpo na kokangisa misuni ya libɔlɔngɔ to kotya malamu prothèse na nzoto ya moto na esika oyo esengeli ezala. Bamekaki kosalela kɔle yango mpo na kokanga lidusu moko na motema ya ngulu mpe kokanga madusu na libale (foie) ya bampuku mpe bamonaki ete kɔle yango esimbaki mpenza.

Mbala mingi bato ya siansi bazwaka solisyo oyo eleki malamu na mikakatano ya bato ntango bayekolaka biloko oyo Nzambe asalá awa na mabele. Donald Ingber, mokambi ya esika oyo basalaki kɔle yango, alobi boye: “Ezali likambo ya koyeba esika nini osengeli koluka mpe kondima likambo ya malamu oyo omoni.”

Okanisi nini? Kɔle oyo mbɛmbɛ babengi limace ebimisaka ebimá kaka yango moko to basalaki yango kosala?

^ par. 1 Nkombo na yango ya siansi ezali Loche roussâtre.