Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOKAPO 126

Petro awangani Yesu na ndako ya Kaifa

Petro awangani Yesu na ndako ya Kaifa

Ntango kaka bakangi Yesu na elanga ya Getesemane, bantoma babangi, bakimi, basundoli ye. Kasi, na nsima mibale kati na bango batɛlɛmi. Ezali Petro “ná moyekoli mosusu,” na ntembe te ntoma Yoane. (Yoane 18:15; 19:35; 21:24) Mbala mosusu bamoni Yesu ntango bazali kokende na ye na ndako ya Anasi. Ntango Anasi atindi Yesu epai ya Nganga-nzambe monene Kaifa, Petro ná Yoane bazali kolanda na mosika. Na ntembe te bazali kobanga mpo na bomoi na bango, kasi bazali mpe komitungisa mpo na makambo oyo ekokómela Nkolo na bango.

Lokola Yoane ayebani na nganga-nzambe monene, bandimi akɔta na lopango ya Kaifa. Petro atikali libándá tii ntango Yoane abimi mpe asololi na mwana mwasi oyo azali kokɛngɛla na porte. Na nsima, mwana mwasi yango akɔtisi Petro.

Lokola malili ezali makasi, bato oyo bazali na lopango bapelisi mɔtɔ ya makala mpo na koyɔta. Petro afandi na bango wana azali kozela “komona ndenge makambo” ekosukela Yesu. (Matai 26:58) Sikoyo, kongɛnga ya mɔtɔ oyo ezali kopela esali ete mokɛngɛli ya porte oyo akɔtisaki Petro amona ye malamu. Atuni ye: “Yo mpe ozali moko ya bayekoli ya moto wana, boye te?” (Yoane 18:17) Ezali kaka mwana mwasi wana ye moko te nde ayebi Petro mpe atuni ye soki azali moyekoli ya Yesu.​—Matai 26:69, 71-73; Marko 14:70.

Likambo yango etungisi Petro makasi. Azali kosala makasi abenda likebi ya bato te, kutu akei na porte ya lopango. Na yango, Petro awangani, amonisi ete azalaki na Yesu te, kutu alobi: “Nayebi ye te mpe nazali kokanga ntina ya makambo ozali koloba te.” (Marko 14:67, 68) Abandi mpe “komilakela mabe mpe kolapa ndai,” elingi koloba akati seleka ete maloba na ye ezali solo mpe andimi mabe ekómela ye soki ezali bongo te.​—Matai 26:74.

Na ntango wana, bazali kosambisa Yesu, mbala mosusu na eteni moko ya ndako ya Kaifa, na likoló ya etajɛ. Ntango mosusu Petro ná bato mosusu oyo bazali kozela na nse bazali komona ndenge batatoli ndenge na ndenge bazali koya mpe kokende.

Lokola elobeli ya Petro ezali lokola oyo ya bato ya Galile, yango ezali kofunda ye. Lisusu, moto moko kati na bato oyo bazali wana azali ndeko ya Malakusi, oyo Petro akataki litoi. Makambo eyindi lisusu mpo na Petro, alobi na ye: “Namonaki yo na elanga elongo na ye, boye te?” Ntango Petro awangani lisusu, mbala ya misato, nsoso eleli, kaka ndenge esakolamaki.​—Yoane 13:38; 18:26, 27.

Na ntango yango, emonani ete Yesu azali na veranda ya likoló mpe azali kotala na nse. Nkolo abaluki mpe atali Petro, mpe na ntembe te epasoli Petro motema. Akanisi lisusu makambo Yesu alobaki na shambrɛ ya likoló, eleki kaka mwa bangonga. Kanisá ndenge Petro amiyoki ntango akangi ntina ya makambo asali! Petro abimi libándá mpe aleli na mawa makasi.​—Luka 22:61, 62.

Ndenge nini asali likambo ya boye? Ndenge nini Petro, oyo alobaki ete azali makasi na elimo mpe akotikala sembo, awangani Nkolo na ye? Bazali kolobela solo mabe mpe kokweisa Yesu ete azali mosali-mabe. Na esika akɔtela Moto oyo azali na “maloba ya bomoi ya seko,” Petro apesi ye mokɔngɔ.​—Yoane 6:68.

Likambo ya mawa oyo ekómeli Petro emonisi ete ata moto ya kondima makasi mpe oyo akangamá na Nzambe akoki kotɛngatɛnga soki amibongisi malamu te mpo na komekama oyo ekoki kobima na mbalakaka. Likambo oyo ekómelaki Petro ezali likebisi mpo na basaleli nyonso ya Nzambe!