Ndenge ekomamá na Yoane 19:1-42

  • Babɛti Yesu fimbo mpe batyoli ye (1-7)

  • Pilate atuni lisusu Yesu mituna (8-16a)

  • Babaki Yesu na nzete na bansɛtɛ na Golgota (16b-24)

  • Yesu apesi mama na ye na mabɔkɔ ya moyekoli moko (25-27)

  • Liwa ya Yesu (28-37)

  • Kokundama ya Yesu (38-42)

19  Bongo Pilate azwaki Yesu mpe abɛtaki ye fimbo.+  Mpe basoda batongaki motole ya nzubɛ, balatisaki ye yango na motó mpe balatisaki ye elamba moko molai ya motane-bulé,+  mpe babandaki koya epai na ye mpe koloba: “Mbote,* yo Mokonzi ya Bayuda!” Bazalaki mpe kobɛtabɛta ye bambata na elongi.+  Pilate abimaki lisusu libándá mpe alobaki na bango: “Namemi ye epai na bino na libándá mpo bóyeba ete ngai namoni likambo moko ya mabe epai na ye te.”+  Na yango, Yesu abimaki libándá, alati motole ya nzubɛ mpe elamba molai ya motane-bulé. Mpe Pilate alobaki na bango: “Bótala, moto!”  Kasi ntango banganga-nzambe bakonzi mpe bakɛngɛli bamonaki ye, bagangaki: “Baká ye na nzete! Baká ye na nzete!”*+ Pilate alobaki na bango: “Bózwa ye bino moko mpe bóboma ye,* mpo ngai namoni likambo moko ya mabe epai na ye te.”+  Bayuda bayanolaki ye: “Tozali na mobeko moko, mpe na kolanda mobeko yango, asengeli kokufa,+ mpo amikómisi mwana ya Nzambe.”+  Ntango Pilate ayokaki makambo oyo bazalaki koloba, abangaki lisusu makasi koleka,  mpe akɔtaki lisusu na ndako ya guvɛrnɛrɛ mpe alobaki na Yesu: “Yo ozali moto ya wapi?” Kasi Yesu apesaki ye eyano te.+ 10  Bongo Pilate alobaki na ye: “Oboyi koloba na ngai? Oyebi te ete nazali na bokonzi ya kobimisa yo mpe nazali na bokonzi ya koboma yo?”* 11  Yesu ayanolaki ye: “Olingaki kozala na bokonzi ata moke te likoló na ngai soki bapesaki yo yango te uta na likoló. Yango wana moto oyo apesi ngai na mabɔkɔ na yo azali na lisumu oyo eleki monene.” 12  Mpo na ntina yango, Pilate azalaki kaka koluka ndenge ya kobimisa ye. Kasi Bayuda bagangaki: “Soki obimisi moto oyo, ozali moninga ya Kaisala te. Moto nyonso oyo amikómisi mokonzi azali kotɛmɛla Kaisala.”*+ 13  Bongo nsima ya koyoka maloba wana, Pilate amemaki Yesu na libándá, mpe afandaki na kiti ya kosambisa na esika ebengami Pavema ya Mabanga, na Ebre, Gabata. 14  Nzokande ezalaki mokolo ya Bolɛngɛli+ Elekeli; ezalaki soki na midi.* Mpe alobaki na Bayuda: “Bótala mokonzi na bino!” 15  Kasi bagangaki: “Longolá ye! Longolá ye! Baká ye na nzete!”* Pilate alobaki na bango: “Naboma mokonzi na bino?” Banganga-nzambe bakonzi bayanolaki: “Tozali na mokonzi mosusu te kaka Kaisala.” 16  Na yango, akabaki ye epai na bango mpo bábaka ye na nzete.+ Bongo bazwaki Yesu mpe bakendaki na ye. 17  Ye moko amemaki nzete ya mpasi,* abimaki akei na esika oyo babengi Esika ya Mokuwa ya Motó,+ oyo ebengami Golgota na Ebre;+ 18  kuna babakaki ye na nzete+ na bansɛtɛ elongo na bato mosusu mibale, moko na ngámbo oyo, mosusu na ngámbo oyo, mpe Yesu na katikati.+ 19  Pilate akomaki mpe mwa maloba mpe atyaki yango likoló ya nzete ya mpasi.* Ekomamaki boye: “Yesu moto ya Nazarete Mokonzi ya Bayuda.”+ 20  Bayuda mingi batángaki likomi yango, mpo esika oyo Yesu abakamaki na nzete na bansɛtɛ ezalaki pene ya engumba; mpe ekomamaki na Ebre, na Latin, mpe na Grɛki. 21  Nzokande, banganga-nzambe bakonzi ya Bayuda balobaki na Pilate: “Kokoma te: ‘Mokonzi ya Bayuda,’ kasi komá ete alobaki: ‘Nazali Mokonzi ya Bayuda.’” 22  Pilate ayanolaki: “Oyo nakomi, nakomi.” 23  Ntango basoda babakaki Yesu na nzete na bansɛtɛ, bazwaki bilamba na ye ya likoló mpe bakabolaki yango na biteni minei. Soda mokomoko azwaki eteni moko, mpe bazwaki lisusu elamba na ye ya kati. Kasi elamba yango ya kati etongamaki na biteni te, bakangisá yango banda na likoló tii na nse. 24  Bongo balobanaki bango na bango ete: “Tópasola yango te, kasi tóbwaka mbɛsɛ mpo na koyeba soki ekozala ya nani.”+ Yango ezalaki mpo na kokokisa eteni oyo ya Makomami ete: “Bakabolaki bilamba na ngai kati na bango, mpe babwakaki mbɛsɛ mpo na elamba na ngai.”+ Basoda basalaki mpenza makambo yango. 25  Nzokande, pene ya nzete ya mpasi* ya Yesu, mama na ye+ mpe ndeko ya mama na ye ya mwasi, bazalaki wana; Maria mwasi ya Klopasi mpe azalaki wana, ná Maria Magadalene.+ 26  Ntango Yesu amonaki mama na ye mpe moyekoli oyo ye azalaki kolinga mingi+ batɛlɛmi pembeni wana, alobaki na mama na ye: “Mwasi, talá mwana na yo!” 27  Na nsima alobaki na moyekoli yango: “Talá mama na yo!” Mpe banda na ngonga wana, moyekoli yango azwaki ye epai na ye. 28  Nsima na yango, ntango Yesu ayebaki ete sikoyo makambo nyonso ekokisami, mpo likomami ekokisama, alobaki: “Nayoki mposa ya mai.”+ 29  Mbɛki moko ezalaki wana etondi na vinyo ya ngayi. Bongo batyaki linyuka oyo etondi na vinyo yango ya ngayi na nzete ya izope* mpe batombolaki yango tii na monɔkɔ na ye.+ 30  Nsima ya komeka vinyo yango ya ngayi, Yesu alobaki: “Ekokisami!”+ agumbaki motó na ye, mpe akataki mpema.*+ 31  Lokola ezalaki mokolo ya Bolɛngɛli,+ Bayuda basɛngaki Pilate ete bábuka bango makolo mpe bálongola bibembe yango, mpo bibembe etikala te likoló ya banzete ya mpasi+ na Sabata, (mpo Sabata yango ezalaki ya monene).+ 32  Bongo basoda bayaki mpe babukaki makolo ya moto ya liboso mpe oyo ya moto mosusu wana, oyo abakamaki na nzete pembeni ya Yesu. 33  Kasi ntango bakómaki epai ya Yesu, bamonaki ete asilaki kokufa, na yango babukaki makolo na ye te. 34  Kasi moko ya basoda atɔbɔlaki ye mopanzi na likɔnga,+ mpe na mbala moko makila ná mai ebimaki. 35  Mpe moto oyo amonaki yango apesi litatoli oyo mpo bino mpe bóndima; litatoli na ye ezali solo, mpe ayebi ete makambo oyo azali koloba ezali solo.+ 36  Ya solo, makambo wana esalemaki mpo eteni ya Makomami ekokisama: “Ata mokuwa na ye moko te ekobukama.”*+ 37  Mpe lisusu, eteni mosusu ya Makomami elobi: “Bakotala epai ya moto oyo batɔbɔlaki.”+ 38  Nzokande, nsima ya makambo yango, Yozefe ya Arimatea, oyo azalaki moyekoli ya Yesu kasi na kobombana mpo azalaki kobanga Bayuda,+ asɛngaki Pilate soki akoki kolongola nzoto ya Yesu. Pilate apesaki ye ndingisa. Bongo Yozefe ayaki mpe alongolaki nzoto ya Yesu.+ 39  Nikodeme,+ moto oyo ayaki epai na ye mbala ya liboso na butu, ye mpe ayaki; amemaki mire basangisá ná aloe* oyo ezalaki litra soki nkama moko.*+ 40  Bongo bazwaki nzoto ya Yesu mpe balíngaki yango na bilamba ya lini ná matiti ya nsolo kitoko,+ na kolanda momeseno ya Bayuda ya kokunda bibembe. 41  Nzokande, elanga moko ezalaki na esika oyo abomamaki,* mpe na elanga yango ezalaki na lilita* moko ya sika,+ oyo na kati na yango balalisá naino moto te. 42  Lokola ezalaki mokolo ya Bolɛngɛli+ ya Bayuda mpe lilita wana ezalaki pembeni, balalisaki Yesu kuna.

Maloba na nse

To, “Losako.”
To, “Bomá ye na nzete! Bomá ye na nzete.”
To, “bóboma ye na nzete.”
To, “koboma yo na nzete?”
To, “azali koloba mabe mpo na Kaisala.”
Lil., “soki na ngonga ya motoba.”
To, “Bomá ye na nzete.”
Lil., “azongisaki elimo na ye.”
To, “ekonikama.”
To mbala mosusu, “rulo ya mire mpe ya aloe.”
Elingi koloba, litra ya Baroma. Talá Ap. B14.
To, “na nzete oyo abomamaki.”
To, “lilita ya kokanisama.”