Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

NDENGE OYO MAKAMBO NYONSO EKOBONGA

Na Bokonzi ya Nzambe “kimya ekokóma mingi”

Na Bokonzi ya Nzambe “kimya ekokóma mingi”

Etikali moke Bokonzi ya Nzambe, guvɛrnema oyo ekoyangela mokili mobimba, oyo tozelaka banda kala, etya kimya mpe boyokani na mabele mobimba. Nzembo 72:7 elobi ete na ntango wana, “kimya ekokóma mingi.” Kasi, ntango nini Bokonzi yango ekoyangela mokili? Ekosala yango ndenge nini? Ndenge nini biso mpe tokoki kosepela na makambo oyo Bokonzi yango ekosala?

BOKONZI YA NZAMBE EKOYA NTANGO NINI?

Biblia esakolaki makambo minene oyo ekosalema, oyo ekolakisa ete etikali moke Bokonzi ya Nzambe eya. Makambo yango ezali na ndakisa bitumba na mikili ndenge na ndenge, nzala, maladi, koningana ya mabele, mpe bato bakobuka mibeko. Makambo nyonso wana ezali “elembo” oyo ekolakisa ete nsuka elingi koya.​—Matai 24:3, 7, 12; Luka 21:11; Emoniseli 6:2-8.

Na esika mosusu Biblia elobi boye: “Mikolo ya nsuka ekozala ntango moko ya mpasi mpenza mpe ya mikakatano. Mpo bato bakozala bato oyo bamilingaka, bato balingá mbongo, . . . oyo batosaka baboti te, oyo bazangi botɔndi, oyo bazangi bosembo, oyo balinganaka te na kati ya libota, oyo balingaka kosala boyokani te, oyo bakoselaka bato makambo, oyo bazangi komipekisa, bato ya nko, oyo balingaka makambo ya malamu te, . . . oyo bavimbi na lolendo, oyo balingá bisengo na esika ya kolinga Nzambe.” (2 Timote 3:1-4) Bato bazalaka na bizaleli wana banda kala; kasi lelo ekómi mingi mpenza.

Makambo wana ekómaki komonana banda 1914. Kutu, bato ya mayele na istware, bakonzi ya Leta, mpe bakomi ndenge na ndenge balobelaka ndenge oyo mokili ebongwaná banda mbula wana. Na ndakisa, Peter Munch, moto moko ya mayele na istware, akomaki boye: “Etumba oyo ebandaki na 1914 ebongolá mpenza bomoi ya bato. Liboso mokili ezalaki na kimya, makambo ezalaki kokende liboso . . . kasi nsima na yango, tokómaki na ntango ya mpasi, ya nsɔmɔ, ya koyinana, mpe kimya ezalaki lisusu te bipai nyonso.”

Kasi, nyonso wana ezali lokola mpasi oyo ezwaka mwasi ya zemi liboso abota; toyebi ete nsima ya kobota, akómaka na esengo. Makambo oyo tolobeli ezali mpe kolakisa ete etikali moke Bokonzi ya Nzambe eyangela mabele. Kutu, Yesu abakisaki likambo moko malamu oyo ekomonana mpe na kati ya elembo ya mikolo ya nsuka: “Nsango malamu oyo ya bokonzi ekosakolama na mabele mobimba esika bato bafandi mpo ezala litatoli na bikólo nyonso; bongo nsuka ekoya.”​—Matai 24:14.

Yango nde nsango malamu oyo Batatoli ya Yehova basakolaka. Kutu, nkombo mobimba ya zulunalo na bango ya libosoliboso ezali Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova. Lelo oyo zulunalo yango ezali kobimisama na minɔkɔ 338; elobelaka mbala na mbala makambo kitoko oyo Bokonzi ya Nzambe ekosala mpo na bato mpe mpo na mabele.

NDENGE NINI BOKONZI YA NZAMBE EKOYANGELA MOKILI?

Eyano ezali na makambo minei oyo:

  1. Nzambe akopesa te Bokonzi yango na mabɔkɔ ya bato ya politiki ya mokili oyo.

  2. Lokola bato ya politiki balingaka kotika bokonzi te, bakomeka ata kotɛlɛmɛla Bokonzi ya Nzambe.​—Nzembo 2:2-9.

  3. Bokonzi ya Nzambe ekoboma bakonzi ya mokili, oyo balingi te kotika koyangela bato. (Danyele 2:44; Emoniseli 19:17-21) Likambo yango ekosalema na etumba oyo Biblia ebengi Armagedone.​—Emoniseli 16:14, 16.

  4. Bato nyonso oyo bandimi kotosa Bokonzi ya Nzambe bakobika na Armagedone mpe bakokɔta na mokili ya sika, epai kimya ekozala. Biblia ebengi bato yango “ebele mpenza ya bato,” mpe bakozala bamilio na bamilio.​—Emoniseli 7:9, 10, 13, 14.

NDENGE NINI BISO MPE TOKOKI KOSEPELA NA MAKAMBO OYO BOKONZI YANGO EKOSALA?

Mpo moto akɔta na Bokonzi ya Nzambe asengeli libosoliboso koteyama. Kutu, Yesu abondelaki Nzambe boye: “Oyo elakisi bomoi ya seko, báyekola koyeba yo, Nzambe ya solo kaka moko, mpe moto oyo yo otindaki, Yesu Kristo.”​—Yoane 17:3.

Ntango moto ayebi Nzambe, azwaka bolamu mingi. Tólobela kaka mibale: Ya liboso, akómaka na kondima makasi. Kondima yango, oyo euti na makambo oyo ayekoli malamumalamu, endimisaka ye ete Bokonzi ya Nzambe ezali solo mpe etikali moke ebanda koyangela. (Baebre 11:1) Ya mibale, akómaka na bolingo mingi mpo na Nzambe mpe mpo na bazalani na ye. Bolingo yango etindaka ye atosa Nzambe na motema moko mpe atosa maloba ya Yesu oyo: “Kaka ndenge bino bolingaka bato básalela bino, bósalela bango mpe bongo.”​—Luka 6:31.

Lokola tata oyo alingaka bana na ye, Mozalisi na biso alingaka tózala malamu mpenza. Alingaka tózala na bomoi oyo Biblia ebengi “bomoi ya solosolo.” (1 Timote 6:19) Lelo oyo tozali na “bomoi ya solosolo” te. Bato ebele bazali na bomoi ya mpasi mpenza mpe bazali kobunda mokolo na mokolo ata kaka mpo na kozwa mwa eloko ya kolya. Mpo na koyeba mwa moke ndenge “bomoi ya solosolo” ekozala, talá mwa makambo kitoko oyo Bokonzi ya Nzambe ekosala mpo na bato.

Bato oyo Bokonzi ya Nzambe ekoyangela bakozala na kimya mpe bakozala na bilei beboo