Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Ntango Bokonzi ya Nzambe ekoyangela, bato “bakosepela mpenza na kimya mingi.”​—Nzembo 37:11

Biblia elobi nini?

Biblia elobi nini?

Biblia ekoki kosalisa yo otika komitungisa?

Okopesa eyano nini?

  • Ɛɛ

  • Te

  • Ntango mosusu

Oyo Biblia elobi

‘Bwakelá [Nzambe] mitungisi na yo nyonso, mpo atyelaka yo likebi.’ (1 Petro 5:7) Biblia emonisi ete Nzambe akoki kosalisa yo ozala na kimya ya motema ata na ntango ya mitungisi.

Oyo Biblia elobi lisusu na likambo yango

  • Na nzela ya libondeli, okoki kozwa “kimya ya Nzambe,” oyo ekokitisa mitungisi na yo.​—Bafilipi 4:6, 7.

  • Longolá yango, kotánga Liloba ya Nzambe ekosalisa yo olonga mitungisi.​—Matai 11:28-30.

Mitungisi ekosila mokolo mosusu?

Bato mosusu bakanisaka . . . ete moto oyo azali na bomoi asengeli kaka komitungisa, nzokande basusu bakanisaka ete mitungisi esilaka kaka soki moto akufi. Okanisi nini?

Oyo Biblia elobi

Nzambe akolongola makambo nyonso oyo ebimisaka mitungisi. “Liwa ekozala lisusu te, ná lilaka ná koganga ná mpasi ekozala lisusu mpe te.”​—Emoniseli 21:4.

Oyo Biblia elobi lisusu na likambo yango