Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Bandimi ya mangomba minene bandimaka ete moto azalaka na molimo oyo ekufaka te

LISOLO YA TITRE YA EZIPELI | BIBLIA ELOBI NINI MPO NA BOMOI MPE LIWA?

Motuna oyo etungisaka bato mingi

Motuna oyo etungisaka bato mingi

BATO bazalaka na makanisi ndenge na ndenge mpo na bomoi mpe liwa. Bato mosusu bakanisaka ete nsima ya liwa moto akobaka kozala na bomoi na nzoto mosusu to epai mosusu. Basusu bakanisaka ete nsima ya liwa moto abotamaka lisusu na lolenge mosusu. Nzokande, basusu bakanisaka ete liwa ezali nsuka ya makambo nyonso.

Mbala mosusu na kotalela ndenge oyo obɔkwamá to mimeseno ya mboka na bino, yo mpe okanisaka ndenge mosusu na likambo yango. Lokola bato bazali na makanisi ndenge na ndenge na likambo yango, ezali nde na moto to esika moko oyo tokoki kozwa eyano ya malamu mpe ya solo na motuna wana?

Banda basiɛklɛ mingi, bakonzi ya mangomba bateyaka ete moto azali na molimo oyo ekufaka te. Bandimi ya mangomba minene, elingi koloba mangomba ya Bokristo, lingomba ya Hindu, ya Bayuda, ya Bamizilma, mpe mangomba mosusu, bandimaka ete moto azalaka na molimo oyo ekufaka te, oyo nsima ya liwa ya nzoto, ekobaka kozala na bomoi na mokili ya bilimo. Nzokande, bandimi ya lingomba ya Buda bandimaka ete soki moto akufi abotamaka lisusu mbala na mbala, mpe akómaka na makasi mpe nguya mingi tii akokóma na lolenge moko ya bomoi ya bisengo na bisengo, oyo babengaka Nirvana.

Mateya ya ndenge wana etindi bato mingi na mokili mobimba bákanisa ete liwa efungolaka nzela oyo ememaka na bomoi na mokili mosusu. Yango wana, mpo na bato mingi, liwa ezali litambe moko ya ntina mingi na bomoi ya bato, mpe bamonaka ete liwa ezali mokano ya Nzambe. Kasi Biblia elobi nini mpo na likambo yango? Tosɛngi yo otánga lisolo oyo elandi. Eyano oyo Biblia epesi ekoki kokamwisa yo.