Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA TITRE YA EZIPELI | BAANZELU​—BAZALAKA MPENZA? KOYEBA YANGO EZALI NA NTINA?

Baanzelu ya mabe mpe bazalaka?

Baanzelu ya mabe mpe bazalaka?

Ɛɛ, baanzelu ya mabe mpe bazalaka. Bautá wapi? Kobosana te ete Nzambe akelaki baanzelu na bonsomi ya kopona. Mwa moke nsima ya kokelama ya Adama ná Eva, mobali ná mwasi ya liboso, ekelamu moko ya elimo mpe ya kokoka asalelaki na ndenge ya mabe bonsomi na ye ya kopona mpe akɔtisaki botomboki na mabele. Asalaki yango na ndenge atindaki Adama na Eva bátombokela Nzambe. (Ebandeli 3:1-7; Emoniseli 12:9) Biblia eyebisi te nkombo ya ekelamu yango ya elimo to esika nini ya lokumu azalaki na yango na likoló liboso akóma motomboki. Kasi nsima ya kokóma motomboki, Biblia ebengi ye Satana, nkombo oyo elimboli “Motɛmɛli,” mpe Zabolo, nkombo oyo elimboli “Mokosi.”​—Matai 4:8-11.

Likambo ya mawa, botomboki yango esukaki wana te. Na mikolo ya Noa, baanzelu mosusu oyo motángo na bango eyebani te “basundolaki esika na bango moko ya kofanda” na kati ya libota ya Nzambe kuna na likoló. Bayaki na mabele mpe balataki nzoto ya bato mpo na kokokisa bamposa na bango ya mabe mpe ya mbindo, makambo oyo baanzelu basengeli kosala te.​—Yuda 6; Ebandeli 6:1-4; 1 Petro 3:19, 20.

Nini ekómelaki baanzelu wana ya mabe? Ntango Nzambe ayeisaki mpela mpo na koboma bato nyonso ya mabe na mokili, balataki lisusu nzoto na bango ya elimo mpe bazongaki na likoló. Kasi, Nzambe atikaki te ete baanzelu wana ya mabe bázongela “esika na bango ya ebandeli.” Nzokande, akitisaki bango na esika moko oyo ekokani na “mabulu ya molili tuu,” oyo ebengami Tartare. (Yuda 6; 2 Petro 2:4) Bademo yango bamikɔtisaki na nse ya bokonzi ya Satana Zabolo, “mokonzi ya bademo,” oyo “azali kokoba komimonisa lokola anzelu ya pole.”​—Matai 12:24; 2 Bakorinti 11:14.

Biblia eteyaka ete Bokonzi ya Nzambe, guvɛrnema ya likoló oyo Masiya azali koyangela, etyamaki na 1914. * Mwa moke na nsima, babenganaki Satana ná bademo na ye kuna na likoló mpe babwakaki bango zingazinga ya mabele. Makambo ya mabe mpe misala ya mbindo oyo etondi na mokili emonisi ete bango nde bazali kotinda bato bátombokela Nzambe mpe básala mobulu.​—Emoniseli 12:9-12.

Kasi, ndenge oyo mabe mpe mobulu ezali se kokóma mingi emonisi ete boyangeli na bango ya mabe ekómi pene na nsuka. Mosika te, bikelamu ya elimo wana ya kanza bakozala lisusu na nguya ya kosala bato mabe te. Bokonzi ya Nzambe ekoyangela mabele oyo ekokóma paradiso na boumeli ya mbula 1 000, na nsima, bikelamu ya elimo wana ya mabe bakozwa lisusu libaku ya komeka bato mpo na mwa ntango moke. Nsima na yango, bakobomama mpo na libela.​—Matai 25:41; Emoniseli 20:1-3, 7-10.

^ par. 6 Mpo na koyeba makambo mosusu etali Bokonzi ya Nzambe, talá buku Makambo oyo Biblia eteyaka, mokapo 8, ebimisami na Batatoli ya Yehova. Ezali mpe na www.dan124.com.