Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Oyebaki yango?

Oyebaki yango?

Ntango Yesu apesaki ndakisa ya “bana ya mbwa” azalaki nde kofinga?

Ekeko ya Bagrɛki to ya Baroma (siɛklɛ ya liboso, liboso ya ntango na biso tii na siɛklɛ ya mibale, na ntango na biso): mwana moko amemi mwana-popi

Mokolo moko ntango Yesu azalaki na ndelo ya Yisraele, na Siri, etúká oyo Baroma bazalaki koyangela, mwasi moko Mogrɛki ayaki epai na ye koluka lisalisi. Na eyano na ye, Yesu apesaki ndakisa moko oyo ekokanisaki bato oyo bazalaki Bayuda te na “bana ya mbwa.” Na Mibeko ya Moize, bambwa ezalaki kotalelama ete ezali banyama ya mbindo. (Balevi 11:27) Kasi, Yesu afingaki nde mwasi Mogrɛki wana mpe bato oyo bazalaki Bayuda te?

Te, ezali bongo te. Ndenge Yesu alimbwelaki bayekoli na ye, na ntango wana, mokano na ye ya libosoliboso ezalaki ya kosalisa Bayuda. Yango wana, mpo na komonisa yango, alobaki na mwasi Mogrɛki yango boye: “Ezali malamu te kokamata mampa ya bana mpe kobwakela yango bana ya mbwa.” (Matai 15:21-26; Marko 7:26) Epai ya Bagrɛki ná Baroma, mbala mingi mbwa ezalaki nyama oyo bato bazalaki kosepela na yango mingi mpe ezalaki kofanda na ndako ya nkolo na yango mpe kosakana na bana mike. Yango wana, maloba “bana ya mbwa” ezalaki kopesa likanisi ya boyokani ya malamu mpe bolingo. Mwasi Mogrɛki akangaki ntina ya maloba wana ya Yesu, yango wana alobaki: “Ya solo, Nkolo; kasi bana ya mbwa balyaka pumbulu oyo eutaka na mesa ya bankolo na bango ekwei.” Yesu apesaki mwasi yango longonya mpo na kondima na ye mpe abikisaki mwana na ye.​—Matai 15:27, 28.

Ntoma Paulo apesaki toli ya malamu ntango alobaki ete bázela naino moke liboso ya kokoba mobembo na mbu?

Liyemi ya masuwa oyo ezalaki komema biloko (siɛklɛ ya liboso ya ntango na biso)

Mopɛpɛ ezalaki kobɛta masuwa oyo ezalaki komema ntoma Paulo na Italie. Ntango masuwa esɛmaki mpo na kopema, ntoma Paulo apesaki bato ya masuwa toli bázela moke liboso ya kokoba mobembo. (Misala 27:9-12) Mpo na nini apesaki toli wana?

Bamatelo na ntango ya kala bayebaki malamu ete kosala mobembo na Mbu ya Mediterane ezalaka likama na eleko ya malili. Kobanda na katikati ya sanza ya 11 tii na katikati ya sanza ya 3, masuwa esengelaki te kotambola na mbu yango. Kasi, emonani ete mobembo oyo ntoma Paulo alobeli ezalaki kosalema na sanza ya 9 to ya 10. Na buku na ye (Epitome of Military Science), Vegetius (siɛklɛ ya 4 ya ntango na biso), mokomi moko Moroma alimbolaki ndenge mibembo ezalaki kosalema na mbu yango: “Basanza mosusu ezalaka malamu, mosusu mabe, mpe oyo etikali mibembo ekokaki kosalema te.” Vegetius alobaki ete mibembo ezalaki malamu kobanda mokolo ya 27 sanza ya 5 tii mokolo ya 14 sanza ya 9; kasi bileko mibale ya mabe to ya likama ezalaki kobanda mokolo ya 15 sanza ya 9 tii mokolo ya 11 sanza ya 11, mpe kobanda mokolo ya 11 sanza ya 3 tii mokolo ya 26 sanza ya 5. Lokola ntoma Paulo amesanaki na mibembo ya mbu, na ntembe te, ayebaki nyonso wana. Mbala mosusu, kapitɛni ya masuwa mpe nkolo masuwa bayebaki mpe makambo yango, kasi baboyaki kolanda toli ya ntoma Paulo. Yango wana, nsukansuka masuwa ezindaki.​—Misala 27:13-44.