Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

BIBLIA EBONGOLAKA BATO

“Nazwi sikoyo bonsomi ya solosolo”

“Nazwi sikoyo bonsomi ya solosolo”
  • ABOTAMAKI NA: 1981

  • EKÓLO: ÉTATS-UNIS

  • BOMOI NA YE YA KALA: MWANA YA MOBULU

NDENGE NAZALAKI:

Nabotamaki na Moundsville, engumba moko ya kimya oyo ezali pembeni ya ebale Ohio na nɔrdi-wɛsti ya etúká ya Virginie, na États-Unis. Lokola babotaki biso mibali misato mpe mwasi moko, tozalaki kotya ndako loyenge mingi. Ngai nazali mwana ya mibale. Baboti na ngai bazalaki kosala mosala makasi, bazalaki sembo mpe bazalaki kolinga bato. Atako tozalaki na mbongo mingi te, tozalaki kozanga te biloko oyo tosengelaki na yango. Lokola baboti na biso bazalaki Batatoli ya Yehova, basalaki nyonso mpo na koteya biso mateya ya Biblia bandá bomwana.

Kasi, ntango nakómaki elenge, natikaki mbala moko kolanda makambo oyo bateyaki ngai. Nazalaki kondima te ete bomoi ya moto ekoki kozala na ntina to na esengo soki azali kolanda batoli ya Biblia. Nakanisaki ete kozala na bonsomi na makambo nyonso nde epesaka esengo ya solosolo. Liboso, natikaki naino koyangana na makita. Bandeko na ngai mibale bakómaki mpe batomboki lokola ngai. Baboti na biso basalaki nyonso mpo nakosalisa biso, kasi milende na bango ekendaki na mai.

Nayebaki te ete bonsomi oyo nazalaki koluka ekolukela ngai makambo. Mokolo moko na nzela, ntango nautaki kelasi, moninga moko apesaki ngai likaya. Nandimaki. Banda mokolo wana, nakomaki kondima kosala makambo mosusu mingi ya mabe. Na nsima, nakómaki komɛla bangi, kolangwa masanga mpe nakómaki na bomoi ya mbindo. Nsima ya bambula mingi, nakómaki mokemoke komɛla bangi ya makasi, mpe nakómaki moombo ya bangi ndenge na ndenge. Lokola ekómisaki ngai moombo monene, nakómaki kotɛka yango mpo na kokokisaka bamposa na ngai wana.

Atako nazalaki kosala nyonso mpo naboya koyokela lisosoli na ngai, ezalaki ntango nyonso koyebisa ngai ete nazali kotambwisa bomoi na ngai na ndenge ya mabe. Kasi nazalaki komona ete mai esí esopani, ndenge mosusu ya kosala ezali te. Atako nazalaki elongo na bato mosusu na bafɛti to na bisika oyo babɛtaka miziki, mbala mingi nazalaki komiyoka ete nazali ngai moko, mpe nazalaki kotungisama na makanisi. Na bantango mosusu, nazalaki kokanisa bizaleli malamu ya baboti na ngai mpe nazalaki komituna, mpo na nini nakei mosika boye.

NDENGE BIBLIA EBONGOLI NGAI:

Atako nazalaki kokanisa ete nakobonga lisusu te, bato mosusu bazalaki kokanisa bongo te. Na mobu 2000, baboti na ngai babengisaki ngai na liyangani ya etúká ya Batatoli ya Yehova. Nakendaki kaka tiká nakende. Kasi likambo ya kokamwa, bandeko na ngai mibale oyo bakómaki mpe batomboki bayaki na liyangani yango!

Na liyangani, nakanisaki lisusu ndenge nayaki kotala miziki na esika yango mbula moko liboso. Kasi makambo oyo namonaki kuna, esimbaki mpenza motema na ngai. Ntango nayaki kotala miziki, esika yango etondaki na bosɔtɔ mpe na milinga ya makaya. Bato mingi oyo bayaki kuna bazalaki na boboto te, mpe maloba ya banzembo yango ezalaki malamu te. Kasi na liyangani, nazalaki elongo na bato oyo bazalaki mpenza na esengo ya solosolo mpe bayambaki ngai malamu mpenza atako elekaki bambula ebele tozalaki komonana te. Esika ya liyangani ezalaki pɛto, mpe bazalaki koteya nsango moko oyo epesaka elikya. Komona ndenge Biblia ebongisá bomoi ya bato yango, etindaki ngai namituna mpo na nini naboyaki kolanda batoli na yango.​—Yisaya 48:17, 18.

“Biblia epesaki ngai makasi ya kotika komɛla mpe kotɛka bangi mpe esalisi ngai nakóma moto malamu”

Kaka nsima ya liyangani, nazwaki ekateli ya kozonga na lisangá. Makambo oyo bandeko na ngai bamonaki na liyangani yango, etindaki mpe bango básala bongo. Biso nyonso misato tondimaki koyekola Biblia.

Vɛrsɛ oyo esimbaki mpenza motema na ngai ezali Yakobo 4:8 oyo elobaka ete: “Bópusana penepene na Nzambe, mpe ye akopusana penepene na bino.” Namonaki ete soki nalingi kopusana penepene na Nzambe, nasengeli kobongisa bizaleli na ngai. Komɛla makaya, bangi mpe masanga ezalaki na kati ya makambo oyo nasengelaki kotika.​—2 Bakorinti 7:1.

Natikaki baninga na ngai ya kala mpe nazwaki baninga ya sika kati na basaleli ya Yehova. Nkulutu oyo ateyaki ngai Biblia asalisaki ngai mingi. Azalaki kobenga ngai mbala na mbala na telefone mpe koya kotala ngai mpo na koyeba soki nazali malamu. Tii lelo oyo, azali mpenza moninga na ngai ya motema.

Na prɛnta ya 2001, ngai ná bandeko na ngai wana mibale, tozwaki batisimo. Kanisá esengo oyo baboti mpe leki na ngai ya nsuka oyo atikalaki sembo bayokaki ntango tokómaki kosambela Yehova libota mobimba!

MATOMBA OYO NAZWI:

Nazalaki kokanisa ete batoli ya Biblia ezali nkaka, kasi sikoyo nakómi komona yango lokola libateli moko ya ntina mingi. Biblia epesaki ngai makasi ya kotika komɛla mpe kotɛka bangi mpe esalisi ngai nakóma moto malamu.

Nazwi libaku ya kozala na kati ya libota ya mokili mobimba ya basambeli ya Yehova. Bato yango balinganaka mpenza, mpe basalelaka Nzambe na bomoko. (Yoane 13:34, 35) Na kati ya libota yango ya mokili mobimba nazwi mpe lipamboli moko ya ntina mingi, elingi koloba mwasi na ngai Adrianne oyo nalingaka mingi mpenza. Ndenge tosalelaka Nzambe elongo epesaka biso esengo mingi.

Na esika ya koluka kaka matomba na ngai moko, nakómi sikoyo kolekisa ntango mingi na mosala ya kosakola, koteya bato ndenge oyo Liloba ya Nzambe ekoki komemela bango matomba. Mosala yango epesaka ngai esengo koleka makambo mosusu nyonso. Nakoki koloba na kondima nyonso ete Biblia ebongoli mpenza bomoi na ngai. Nazwi sikoyo bonsomi ya solosolo.