Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

ELOBELI TITRE YA EZIPELI: OSENGELI KOBANGA NSUKA YA MOKILI?

Nsuka ya mokili ezali kobangisa, kosepelisa to kolɛmbisa?

Nsuka ya mokili ezali kobangisa, kosepelisa to kolɛmbisa?

Okanisi nini mpo na mokolo ya 21/12/2012, dati oyo ezali na kalandriye ya Ba-Maya, oyo bato mingi bazalaki koloba ete ekobongola makambo na mokili mobimba? Mbala mosusu motema na yo ekoki kokita, okoki kolɛmba nzoto to kokipe lisusu likambo yango te, na kotalela makambo oyo ozalaki kokanisa ete ekosalema. Ezalaki kaka dati mosusu ya lokuta oyo bato basakolaki mpo na nsuka ya mokili?

Kasi ezali boni mpo na “suka ya mokili” oyo Biblia elobeli? (Matié 24:3, Bible na lingala ya lelo oyo) Bato mosusu bakanisaka ete mabele ekozika na mɔtɔ. Bamosusu basepelaka komona makambo oyo ekosalema na nsuka ya mokili. Basusu mpe bakipaka lisusu nsuka ya mokili te mpo babandá kozela yango banda kala. Masapo mpamba to makambo ya solo nde etindi bango bakanisa bongo?

Mbala mosusu soki oyoki oyo Biblia elobaka mpenza mpo na nsuka ya mokili, okokamwa! Biblia esuki kaka te na kopesa bantina oyo tosengeli kozela yango na motema likoló, kasi emonisi mpe ete bato mosusu bakoki kolɛmba nzoto ndenge nsuka yango ezali koumela. Tosɛngi yo otalela biyano oyo Biblia epesi na mituna mosusu oyo bato mingi batunaka mpo na nsuka ya mokili.

Mabele ekozika na mɔtɔ?

EYANO YA BIBLIA: “[Nzambe] atyá moboko ya mabele na bisika na yango ya libela; Ekotengatenga te kino ntango oyo etyami ndelo te, ɛɛ libela.”​NZEMBO 104:5.

Mabele ekobebisama te, ezala na mɔtɔ to na lolenge mosusu. Kutu, Biblia eteyaka ete mabele ezali esika oyo bato basengeli kofanda mpo na libela. Nzembo 37:29 elobi boye: “Bayengebene bakozwa mabele, Mpe bakofanda wana seko.”​—Nzembo 115:16; Yisaya 45:18.

Nsima ya kosala mabele, Nzambe alobaki ete “ezalaki malamu mingi,” tii lelo oyo ayokaka kaka bongo. (Ebandeli 1:31) Na esika ete akana kobebisa yango, Nzambe alaki nde ete ‘akobebisa baoyo bazali kobebisa mabele,’ mpe akobatela yango mpo ebeba libela te.​—Emoniseli 11:18.

Kasi mbala mosusu okoki komituna mpo na maloba oyo ezali na 2 Petro 3:7. Vɛrsɛ yango elobi boye: “Likoló ná mabele oyo ezali sikoyo ebombami mpo na mɔtɔ.” Yango elingi koloba te ete mabele oyo ekozika na mɔtɔ? Toboyi te, na bantango mosusu Biblia esalelaka liloba “likoló,” “mabele” mpe “mɔtɔ” na ndenge ya elilingi. Na ndakisa, ntango Ebandeli 11:1 elobi ete “mabele mobimba ezalaki na monɔkɔ kaka moko,” elobeli “mabele” mpo na komonisa bato.

Makambo oyo ezali zingazinga ya 2 Petro 3:7 emonisi ete likoló, mabele, mpe mɔtɔ oyo balobeli kuna ezali mpe na ndenge ya elilingi. Vɛrsɛ 5 mpe 6 elobeli Mpela ya mikolo ya Noa. Na ntango yango, mokili ya kala ebebisamaki, kasi mabele elimwaki te. Kutu, Mpela ebomaki nde “mabele,” elingi koloba bato mabe nyonso ya ntango wana. Ebomaki mpe “likoló,” elingi koloba baoyo bazalaki koyangela na ntango yango. (Ebandeli 6:11) Ndenge moko mpe, 2 Petro 3:7 elobi ete bato mabe ná baguvɛrnema na bango bakobebisama seko, lokola nde na mɔtɔ.

Nini ekosalema na nsuka ya mokili?

EYANO YA BIBLIA: “Mokili ezali koleka ndenge moko mpe mposa na yango, kasi moto oyo azali kosala mokano ya Nzambe azali kotikala libela na libela.”​1 YOANE 2:17.

“Mokili” oyo ekoleka ezali mabele te, kasi nde bato nyonso ya mokili oyo bomoi na bango eyokani te na mokano ya Nzambe. Kaka ndenge monganga akoki kosala moto lipaso mpo na kolongola kanser mpo abika, Nzambe mpe ‘akoboma’ bato mabe mpo bato malamu basepela mpenza na bomoi awa na mabele. (Nzembo 37:9) Boye, “nsuka ya mokili” ezali likambo ya malamu.

Ndenge wana ya kotalela “nsuka ya mokili” emonisami na Babiblia mosusu, oyo ebongoli maloba yango na: “Bosukisi ya makambo ya ntango oyo,” to “nsuka na ekeke.” (Matai 24:3; Biblia haut fleuve) Lokola bato bakobika mpe mabele ekobebisama te na nsuka ya mokili, ezali polele ete ekeke ya sika to ebongiseli ya makambo ya sika ekobanda. Biblia elobi mpenza bongo, mpo elobelaka “ntango oyo ezali koya.”​—Luka 18:30.

Yesu abengaki yango eleko oyo “biloko nyonso ekokóma ya sika.” Na ntango yango, akosala ete bomoi ya bato ezonga na ndenge oyo Nzambe akanaki na ebandeli. (Matai 19:28) Tokosepela mpenza na

Soki tozali kosala “mokano ya Nzambe,” elingi koloba makambo oyo azali kosɛnga biso, ntina ya kobanga nsuka ya mokili ezali te. Kutu, tokozela yango nde na motema likoló.

Nsuka ya mokili ekómi mpenza pene?

EYANO YA BIBLIA: “Ntango bokomona makambo yango ezali kosalema, bóyeba ete bokonzi ya Nzambe ekómi pene.”​LUKA 21:31.

Na buku (The Last Days Are Here Again) Profesɛrɛ Richard Kyle akomi ete “mbongwana ya mbalakaka mpe mobulu oyo ezali na mokili etindaka bato baloba ete mokili ekómi na nsuka.” Balobaka bongo mingimingi soki ezali mpasi kolimbola ntina ya mbongwana mpe mobulu yango.

Nzokande, basakoli ya Biblia oyo balobelaki nsuka ya mokili bakómaki yango te mpo na kolimbola makambo mabe oyo ezalaki kosalema na eleko na bango. Kutu, Nzambe asalisaki bango na nzela ya elimo na ye mpo bálobela makambo oyo ekomonisa ete nsuka ya mokili ekómi pene. Tosɛngi yo otalela naino bisakweli yango mosusu mpe omona yo moko soki ezali kokokisama na ntango na biso.

Yesu alobaki ete soki tomoni “makambo yango nyonso,” tóyeba ete nsuka ya mokili ekómi pene. (Matai 24:33) Batatoli ya Yehova bandimaka ete makambo oyo ezali koleka na mokili ezali komonisa ete nsuka ekómi pene mpe bazali kosakwela bato nsango yango na mikili 236.

Lokola nsuka eyei te na badati oyo bato balobaki, yango elingi koloba ete ekoya lisusu te?

EYANO YA BIBLIA: “Na ntango oyo bato bakoloba: ‘Kimya, likambo ya kobanga ezali te!’ na ntango yango libebi ya mbalakaka ekoyela bango na mbala moko ndenge mpasi ya kobota eyelaka mwasi ya zemi; mpe bakokima soki moke te.”​1 BATESALONIKI 5:3.

Biblia ekokanisi kobebisama ya mokili na ebandeli ya mpasi ya kobota​—mama akoki te kokima mpasi yango mpo eyaka na mbalakaka. Ntango oyo ezali komema na nsuka ya mokili ezali lokola zemi, mpo mama oyo azali pene ya kobota ayebaka bilembo oyo emonisaka ete etikali moke abota. Monganga na ye akoki mbala mosusu kotyela ye dati oyo akobota; kasi ata soki eumeli, akozala kaka na elikya ete mosika te bebe na ye akobotama. Ndenge moko mpe, ata soki nsuka ya mokili eyei te na dati oyo bato bazalaki kozela, yango ebongoli te makambo oyo emonisi ete tozali na “mikolo ya nsuka.”​—2 Timote 3:1.

Mbala mosusu okoki komituna boye: ‘Lokola bilembo oyo ezali komonisa ete nsuka ekómi pene ezali komonana polele, mpo na nini bato mingi bazali koboya kondima yango?’ Biblia emonisi ete ntango nsuka ekokóma pene, bato mingi bakotyola bilembo na yango. Na esika bándima mbongwana monene oyo ezali kosalema na boumeli ya mikolo ya nsuka, bakobanda kutu kosɛka boye: “Banda mokolo bankɔkɔ na biso balalá na liwa, makambo nyonso ezali kokoba kaka ndenge ezalaki banda na ebandeli ya bozalisi.” (2 Petro 3:3, 4) Na maloba mosusu, bilembo ya ntango ya nsuka ezali komonana polele, kasi mingi bakokipe yango te.​—Matai 24:38, 39.

Lisolo oyo elobeli kaka mwa bavɛrsɛ oyo emonisi ete nsuka ekómi pene. * Okosepela koyeba makambo mosusu? Soki ɛɛ, luká Batatoli ya Yehova mpe ndimá ete báyekola na yo Biblia ofele. Boyekoli yango ekoki kosalema na ndako na yo, na esika mosusu oyo osepeli to ata na telefone. Likambo kaka moko oyo osengeli kosala ezali ya kopesa bango mwa ntango na yo; na ntembe te okozwela yango matomba mpenza.

^ par. 39 Mpo na koyeba makambo mosusu, talá mokapo 9, “Tozali na ‘mikolo ya nsuka’?,” na buku Biblia eteyaka mpenza nini? ebimisami na Batatoli ya Yehova.