Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

ELOBELI TITRE YA EZIPELI | NDENGE NINI NZAMBE ATALELAKA BITUMBA?

Ndenge Nzambe atalelaki bitumba na siɛklɛ ya liboso

Ndenge Nzambe atalelaki bitumba na siɛklɛ ya liboso

Bato bazalaki konyokwama. Ndenge moko na bankɔkɔ na bango, na ntembe te Bayuda na siɛklɛ ya liboso babondelaki Nzambe mbala na mbala asalisa bango na mabɔkɔ ya bato ya ampire ya Roma oyo bazalaki konyokola bango. Na nsima, bayokaki nsango ya Yesu. Ekoki kozala ete ye nde Masiya oyo alakamaki? Tokoki kokamwa te soki mingi na bango ‘bazalaki kolikya ete moto yango nde azalaki moto oyo asengelaki kosikola Yisraele’ na mabɔkɔ ya Baroma oyo bazalaki konyokola bango. (Luka 24:21) Kasi basikolamaki te. Kutu, na mobu 70 ya ntango na biso, basoda ya Roma bayaki mpe babebisaki Yerusaleme ná tempelo na yango.

Nini esalemaki? Mpo na nini Nzambe abundelaki Bayuda te ndenge asalaki yango kala? To mpo na nini atindaki bango te bábunda mpo na komilongola na minyoko yango? Nzambe abongolaki nde ndenge na ye ya kotalela bitumba? Te. Kasi likambo moko ebongwanaki mpenza epai ya Bayuda. Baboyaki kondima ete Yesu, Mwana ya Nzambe, azali Masiya. (Misala 2:36) Na yango, ekólo yango mobimba ebungisaki boyokani ya ntina mingi oyo ezalaki na yango na Nzambe.​—Matai 23:37, 38.

Nzambe azalaki lisusu te kobatela ekólo ya Bayuda mpe Mokili oyo apesaki bango; Bayuda bakokaki lisusu mpe te koloba ete bazalaki kobunda bitumba oyo Nzambe azalaki kotinda to kosalisa bango. Ndenge Yesu asakolaki yango, mapamboli oyo balingaki kozwa lokola Nzambe andimaki bango ekendaki epai ya ekólo ya elimo, oyo na nsima Biblia elobelaki yango lokola “Yisraele ya Nzambe.” (Bagalatia 6:16; Matai 21:43) Lisangá ya bakristo oyo batyami mafuta na elimo bamonisaki ete bango nde basali Yisraele ya elimo. Na siɛklɛ ya liboso, balobaki na bango polele boye: “Sikoyo bozali bato na Ye.”​—1 Petro 2:9, 10.

Lokola bakristo ya siɛklɛ ya liboso bakómaki sikoyo ‘bato ya Nzambe,’ Nzambe abundelaki nde bango mpo na kosikola bango na monyoko ya Baroma? To apesaki bango nzela ya kobundisa baoyo bazalaki konyokola bango? Te. Mpo na nini? Na bitumba oyo Nzambe azalaki kotinda bato bábunda, ye moko nde azalaki kopona ntango oyo ekosalema ndenge lisolo oyo eleki emonisaki yango. Nzambe abundelaki bakristo ya siɛklɛ ya liboso te, atindaki bango mpe te bábundaka. Ezali polele ete siɛklɛ ya liboso ezalaki te ntango oyo Nzambe aponaki mpo na kosilisa mabe mpe minyoko.

Na yango, ndenge moko na basaleli ya Nzambe ya ntango ya kala, bakristo ya siɛklɛ ya liboso basengelaki kozela tii ntango oyo Nzambe alingaki kosilisa mabe mpe minyoko ekokoka. Nzambe apesaki bango nzela te ya kobundisa banguna na bango na ndenge na bango moko. Yesu amonisaki yango polele na mateya na ye. Na ndakisa, atindaki te bayekoli na ye bábundaka bitumba, kutu ayebisaki bango boye: “Bókoba kolinga banguna na bino mpe kobondela mpo na baoyo bazali konyokola bino.” (Matai 5:44) Ntango alobelaki eleko oyo basoda ya Roma bakobundisa Yerusaleme na siɛklɛ ya liboso, Yesu ayebisaki bayekoli na ye bátikala wana te mpo na kobunda kasi nde bákima; basalaki mpe bongo.​—Luka 21:20, 21.

Lisusu, na litambwisi ya elimo ya Nzambe ntoma Paulo akomaki boye: “Bózongisela [moto] mabe te, . . . mpo ekomamá ete: ‘Kozongisa mabe ezali likambo na ngai; ngai nakozongisa mabe,’ Yehova alobi bongo.” (Baroma 12:19) Paulo atángi maloba oyo Nzambe alobaki basiɛklɛ mingi liboso ndenge emonisami na Balevi 19:18 mpe Kolimbola Mibeko 32:35. Ndenge tomonaki yango na lisolo eleki, Nzambe azongiselaki bato oyo banyokolaki basaleli na ye mabe na ntango ya kala na ndenge asalisaki bango bábunda na banguna na bango. Na yango, maloba ya Paulo emonisi ete ndenge oyo Nzambe atalelaka bitumba ebongwanaki te. Na siɛklɛ ya liboso, Nzambe azalaki kaka kotalela bitumba lokola mwaye oyo esengeli mpo na kozongisa mabe epai ya baoyo bazalaki konyokola basaleli na ye mpe kosilisa minyoko mpe makambo mabe ndenge na ndenge oyo bazalaki kosala bango. Kasi, ndenge ezalaki na ntango ya kala, Nzambe ye moko nde amonisaki ntango nini bitumba yango esengelaki kobanda mpe nani asengelaki kobunda.

Ezali polele ete Nzambe apesaki bakristo ya siɛklɛ ya liboso nzela te ya kobunda bitumba. Bongo lelo oyo? Nzambe apesi nde etuluku moko ya bato nzela ya kobunda bitumba? To ntango ekoki sikoyo mpo Nzambe abundela basaleli na ye? Ndenge nini Nzambe atalelaka bitumba lelo? Lisolo ya nsuka na masolo oyo ekoyanola na mituna yango.