Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Oyebaki yango?

Oyebaki yango?

Mpo na nini Yozefe akataki mandɛfu liboso akutana na Farao?

Liyemi na efelo ya kala ya moezipito oyo azali kokata moto nsuki

Mokanda ya Ebandeli emonisi ete Farao apesaki mitindo báyela ye nokinoki Yozefe, Moebre oyo azalaki na bolɔkɔ mpo alimbolela ye bandɔtɔ oyo etungisaki ye. Na ntango yango, Yozefe aumelaki bambula mingi na bolɔkɔ. Atako abengisaki ye nokinoki, azwaki ntango ya kokata mandɛfu. (Ebandeli 39:20-23; 41:1, 14) Soki mokomi ya mokanda yango alobeli likambo wana oyo ezali mpenza na ntina te, emonisi ete ayebaki mpenza mimeseno ya Bato ya Ezipito.

Kokolisa mandɛfu ezalaki momeseno ya bikólo mingi ya ntango ya kala ata mpe Baebre. Kasi, mokanda moko (Cyclopedia of Biblical, Theological, and Ecclesiastical Literature) oyo McClintock ná Strong bakomaki, elobi boye: “Na bikólo nyonso ya Moyen-Orient, kaka Ezipito nde eboyaki momeseno ya kotika mandɛfu milai.”

Bazalaki kokata kaka mandɛfu? Zulunalo moko (Biblical Archaeology Review) elobi ete mimeseno mosusu oyo bato ya Ezipito bazalaki kosala na milulu esɛngaki moto amibongisa liboso akutana na Farao ndenge basalaka ntango alingi kokende na tempelo. Na libaku ya ndenge wana, esɛngaki Yozefe akata nsuki nyonso banda na motó tii na makolo.

Mokanda ya misala elobi ete tata ya Timote azalaki Mogrɛki. Yango elingi nde koloba ete azalaki moto ya Grɛsi?

Toyebi mpenza te. Na mikanda oyo akomaki na litambwisi ya elimo ya Nzambe, na bantango mosusu ntoma Paulo azalaki kosalela liloba Bagrɛki mpo na kokesenisa Bayuda na bato mosusu nyonso oyo bazalaki Bayuda te. (Baroma 1:16; 10:12) Na ntembe te, azalaki mpe kobenga bango bongo mpo bato mingi bazalaki koloba monɔkɔ ya Grɛki mpe mimeseno ya Bagrɛki epalanganaki mingi na bisika oyo Paulo azalaki kosakola.

Bazalaki kotalela nini mpo bábenga moto moko Mogrɛki na ntango ya kala? Na siɛklɛ ya minei liboso ya ntango na biso, Isocrate, molobi moko ya Atene alobelaki na lolendo nyonso ndenge mimeseno ya Bagrɛki epalanganaki na mokili. Amonisaki ete mpo na yango nde “bazalaki kobenga Mogrɛki, moto nyonso oyo atángá kelasi ya Bagrɛki, kasi te bato oyo babotamá na Grɛsi.” Na yango, atako toyebi mpenza te, ekoki kozala ete tata ya Timote oyo azalaki Moyuda te mpe bato mosusu oyo Paulo abengaki Bagrɛki bazalaki Bagrɛki mpo na mimeseno ya Bagrɛki kasi te mpo babotamá na Grɛsi.​—Misala 16:1.