Nzembo 13:1-6

  • Nazali na mposa makasi ete Yehova abikisa ngai

    • “Ee Yehova, tii ntango nini?” (1, 2)

    • Yehova apesaka mbano monene mpenza (6)

Epai ya mokambi ya nzembo.Mondule ya Davidi. 13  Ee Yehova, tii ntango nini okobosana ngai? Mpo na libela? Tii ntango nini okobombela ngai elongi na yo?+   Tii ntango nini nakomitungisa,*Motema na ngai ekozala na mawa mokolo mobimba? Tii ntango nini monguna na ngai akolonga ngai?+   Talá ngai mpe yanolá ngai, Ee Yehova Nzambe na ngai. Ngɛngisá miso na ngai, mpo nalala na kati ya liwa te,   Mpo monguna na ngai aloba te ete: “Nalongi ye!” Kotika te ete banguna na ngai básepela na kokwea na ngai.+   Mpo ngai natye motema na bolingo na yo ya sembo;+Motema na ngai ekosepela na misala na yo ya kobikisa.+   Nakoyembela Yehova, mpo apesi ngai mbano monene mpenza.+

Maloba na nse

To, “molimo na ngai ekotungisama.”