Nzembo 138:1-8

  • Atako atombwami, Nzambe atyaka likebi

    • ‘Oyanolaki libondeli na ngai’ (3)

    • ‘Ata na kati ya likama, okobikisa ngai’ (7)

Ya Davidi. 138  Nakosanzola yo na motema na ngai mobimba.+ Liboso ya banzambe mosusu,Nakoyemba mpo na kosanzola yo.*   Nakogumbama, natali na ngámbo ya tempelo* na yo mosantu,+Mpe nakosanzola nkombo na yo+Mpo na bolingo na yo ya sembo mpe bosembo na yo. Mpo okumisi liloba na yo mpe nkombo na yo koleka eloko mosusu nyonso.*   Na mokolo oyo nabengaki yo,+ oyanolaki ngai;Opesaki ngai mpiko* mpe makasi.+   Bakonzi nyonso ya mabele bakosanzola yo,Ee Yehova,+Mpo bakoyoka bilaka nyonso oyo opesaki.   Bakoyemba mpo na banzela ya Yehova,Mpo nkembo ya Yehova ezali monene.+   Atako Yehova atombwami, atyelaka moto ya komikitisa likebi,+Kasi moto ya lolendo, ayebaka ye kaka na mosika.+   Ata soki natamboli na kati ya likama, okobatela ngai na bomoi.+ Mpo na nkanda ya banguna na ngai, okosembola lobɔkɔ na yo;Lobɔkɔ na yo ya mobali ekobikisa ngai.   Yehova akosala makambo nyonso mpo na bolamu na ngai. Ee Yehova, bolingo na yo ya sembo ezali seko na seko;+Kosundola misala ya mabɔkɔ na yo te.+

Maloba na nse

To mbala mosusu, “Mpo na kotɛmɛla banzambe mosusu, nakobɛta miziki mpo na yo.”
To, “esika mosantu.”
To mbala mosusu, “Mpo okumisi liloba na yo mingi koleka nkombo na yo mpenza.”
To, “molimo na ngai mpiko.”