Ndenge ekomamá na Yoane 4:1-54

  • Yesu ná mwasi Mosamaria (1-38)

    • Kosambela Nzambe “na elimo mpe na solo” (23, 24)

  • Basamaria mingi bandimeli Yesu (39-42)

  • Yesu abikisi mwana ya mosali moko ya mokonzi (43-54)

4  Nzokande, ntango Nkolo ayebaki ete Bafarisai bayokaki ete ye* azali kozwa mpe kobatisa+ bayekoli mingi koleka Yoane—  atako Yesu ye moko azalaki kobatisa te kasi bayekoli na ye nde bazalaki kobatisa—  alongwaki na Yudea mpe akendaki lisusu na Galile.  Kasi asengelaki kokatisa Samaria.  Bongo akómaki na engumba moko ya Samaria oyo ebengami Sikare, pene na elanga oyo Yakobo apesaki mwana na ye Yozefe.+  Kuna nde esika libulu ya mai ya Yakobo ezalaki.+ Nzokande Yesu, lokola alɛmbaki mingi mpo na mobembo, afandaki pene na libulu yango ya mai.* Ezalaki soki na midi.*  Mwasi moko ya Samaria ayaki kotoka mai. Yesu alobaki na ye: “Pesá ngai mai ya komɛla.”  (Bayekoli na ye bakendaki na engumba kosomba biloko ya kolya.)  Bongo mwasi Mosamaria yango alobaki na ye: “Ndenge nini yo, atako ozali Moyuda, ozali kosɛnga ngai mai ya komɛla, nzokande ngai nazali mwasi Mosamaria?” (Mpo Bayuda bayokanaka te na Basamaria.)+ 10  Yesu azongiselaki ye: “Soki oyebaki likabo ya ofele ya Nzambe+ mpe moto oyo azali koloba na yo: ‘Pesá ngai mai ya komɛla,’ yo nde olingaki kosɛnga ye, mpe ye alingaki kopesa yo mai ya bomoi.”+ 11  Mwasi yango alobaki na ye: “Tata, ozali ata na katini ya kotoka mai te, mpe libulu ezali mozindo. Bongo mai yango ya bomoi okozwa wapi? 12  Oleki nde nkɔkɔ na biso Yakobo, oyo apesaki biso libulu oyo mpe oyo amɛlaki mai na yango, ye ná bana na ye mpe bibwɛlɛ na ye?” 13  Bongo Yesu azongiselaki ye: “Moto nyonso oyo amɛli mai oyo akoyoka lisusu mposa ya mai. 14  Moto oyo akomɛla mai oyo ngai nakopesa ye akoyoka lisusu mposa ya mai ata moke te,+ kasi mai oyo nakopesa ye ekokóma na kati na ye liziba ya mai oyo ezali kobimabima mpo na kopesa bomoi ya seko.”+ 15  Mwasi yango alobaki na ye: “Tata, pesá ngai mai yango, mpo nayoka lisusu mposa ya mai te mpe nayaka lisusu na esika oyo te mpo na kotoka mai.” 16  Yesu alobaki na ye: “Kende kobenga mobali na yo mpe yaká na ye awa.” 17  Mwasi yango azongisaki: “Nazali na mobali te.” Yesu alobaki na ye: “Ezali bongo ndenge olobi: ‘Nazali na mobali te.’ 18  Mpo ozwá mibali mitano, mpe oyo ozali na ye sikoyo azali mobali na yo te. Na likambo yango olobi solo.” 19  Mwasi yango alobaki na ye: “Tata, namoni ete ozali mosakoli.+ 20  Bankɔkɔ na biso basambelaki na ngomba oyo, kasi bino bolobaka ete na Yerusaleme nde esika oyo bato basengeli kosambela.”+ 21  Yesu alobaki na ye: “Mwasi, ndimelá ngai, ngonga ezali koya wana bokosambela Tata na ngomba oyo te, na Yerusaleme mpe te. 22  Bino bosambelaka oyo boyebi te;+ biso tosambelaka oyo toyebi, mpo lobiko ebandi na Bayuda.+ 23  Kasi ngonga ezali koya, mpe ezali sikoyo, wana basambeli ya solosolo bakosambela Tata na elimo mpe na solo, mpamba te Tata azali koluka bato ya ndenge wana mpo na kosambela ye.+ 24  Nzambe azali Elimo,+ mpe baoyo bazali kosambela ye basengeli kosambela ye na elimo mpe na solo.”+ 25  Mwasi yango alobaki na ye: “Nayebi ete Masiya azali koya, oyo abengami Kristo. Ntango akoya, akoyebisa biso makambo nyonso polele.” 26  Yesu alobaki na ye: “Ngai oyo nazali koloba na yo, nazali ye.”+ 27  Kaka na ntango wana bayekoli na ye bayaki, mpe babandaki kokamwa mpo azalaki kosolola na mwasi. Kasi, moko te alobaki: “Ozali koluka nini?” to, “Mpo na nini ozali kosolola na ye?” 28  Bongo mwasi yango atikaki elokó na ye, akendaki na engumba mpe ayebisaki bato ete: 29  “Bóya kotala moto moko oyo ayebisi ngai makambo nyonso oyo nasalá. Mbala mosusu ye nde Kristo te?” 30  Babimaki na engumba mpe babandaki koya epai ya Yesu. 31  Na ntango yango, bayekoli bazalaki kobondela ye ete: “Rabi,+ lyá.” 32  Kasi alobaki na bango: “Nazali na bilei oyo bino boyebi te.” 33  Bongo bayekoli balobanaki bango na bango: “Moto moko amemeli ye nde eloko ya kolya?” 34  Yesu alobaki na bango: “Bilei na ngai ezali kosala mokano ya moto oyo atindaki ngai+ mpe kosilisa mosala na ye.+ 35  Bolobi ete etikali sanza minei mpo mosala ya kobuka mbuma ebanda, boye te? Talá! Nalobi na bino: Bótombola miso na bino mpe bótala bilanga, ndenge eteli mpo na kobuka mbuma.+ Sikoyo 36  mobuki-mbuma azali kozwa lifuti mpe azali koyanganisa mbuma mpo na bomoi ya seko, mpo moloni ná mobuki-mbuma básepela elongo.+ 37  Mpamba te na likambo yango maloba oyo ezali solo: Moko azali moloni mpe mosusu azali mobuki-mbuma. 38  Natindaki bino bóbuka mbuma oyo bosalelaki mosala makasi te. Basusu basalaki mosala makasi, mpe bino bozwi litomba na mosala na bango ya makasi.” 39  Basamaria mingi ya engumba wana bakómaki kondimela ye mpo na maloba ya mwasi oyo apesaki litatoli ete: “Ayebisaki ngai makambo nyonso oyo nasalá.”+ 40  Bongo ntango Basamaria bayaki epai na ye, basɛngaki ye ete afanda elongo na bango, mpe afandaki kuna mikolo mibale. 41  Na yango, bato mingi lisusu bandimaki mpo na makambo oyo alobaki, 42  mpe balobaki na mwasi yango: “Ezali lisusu te kaka mpo na makambo oyo olobaki nde tozali kondima; mpo toyoki biso moko mpe toyebi ete moto oyo azali mpenza mobikisi ya mokili.”+ 43  Nsima ya mikolo yango mibale, alongwaki wana mpe akendaki na Galile. 44  Nzokande, Yesu ye moko alobaki ete mosakoli azalaka na lokumu te na mboka na ye moko.+ 45  Na yango, ntango akómaki na Galile, bato ya Galile bayambaki ye, mpo bamonaki makambo nyonso oyo asalaki na Yerusaleme na fɛti,+ mpo bango mpe bakendaki na fɛti.+ 46  Bongo akómaki lisusu na Kana ya Galile, epai abongolaki mai vinyo.+ Nzokande, ezalaki na mosali moko ya mokonzi na Kapernaume oyo mwana na ye azalaki kobɛla. 47  Ntango moto yango ayokaki ete Yesu autaki na Yudea mpe akómaki na Galile, akendaki epai na ye mpe asɛngaki ye akende kobikisa mwana na ye, mpo etikalaki moke akufa. 48  Kasi Yesu alobaki na ye: “Soki bomoni bilembo mpe makamwisi te, bokondima ata moke te.”+ 49  Mosali ya mokonzi alobaki na ye: “Nkolo, yaká elongo na ngai liboso ete mwana na ngai ya moke akufa.” 50  Yesu alobaki na ye: “Zongá epai na yo; mwana na yo azali na bomoi.”+ Moto yango andimaki maloba oyo Yesu alobaki na ye, mpe akendaki. 51  Kasi ntango azalaki naino na nzela, baombo na ye bayaki kokutana na ye mpo na koyebisa ye ete mwana na ye ya mobali azali na bomoi.* 52  Bongo atunaki bango na ngonga nini akómaki malamu. Bayanolaki ye: “Fiɛvrɛ na ye esilaki lobi na ngonga ya liboso ya nsima ya midi.”* 53  Bongo tata wana ayebaki ete ezalaki na ngonga wana nde Yesu alobaki na ye: “Mwana na yo azali na bomoi.”+ Na yango ye ná ndako na ye mobimba bakómaki bandimi. 54  Yango ezalaki likamwisi ya mibale+ oyo Yesu asalaki ntango autaki na Yudea mpe akómaki na Galile.

Maloba na nse

Lil., “Yesu.”
To, “liziba.”
Lil., “soki ngonga ya motoba.”
Lil., “ayoki malamu.”
Lil., “na ngonga ya nsambo.”