Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

BÓSƐNZƐLAKA!

Milio 6 ya bato bakufi na COVID​—Biblia elobi nini mpo na makambo ya boye?

Milio 6 ya bato bakufi na COVID​—Biblia elobi nini mpo na makambo ya boye?

 Na mokolo ya 23/05/2022, Organisation mondiale de la santé (OMS) elobaki ete bato 6,27 milio bakufi na maladi ya Coronavirus. Nzokande, lapolo mosusu oyo OMS ebimisaki na mokolo ya 05/05/2022, elobaki ete mbala mosusu bato nyonso oyo bakufi na maladi yango bazali mingi koleka mpenza. Emonisaki ete na 2020 mpe 2021, ‘motángo ya bato nyonso oyo bakufi mbala moko na Coronavirus to te ekoki kozala 14,9 milio.’ Biblia elobi nini mpo na makambo ya mabe boye?

Biblia esakolaki ete bamaladi mabe ekobima

  •    Yesu alobaki ete bamaladi mabe ekokóma mingi, mpe “bato ebele bakozwa maladi ya mabe,” na eleko oyo Biblia ebengaka “mikolo ya nsuka.”​—Luka 21:11, Bible na Lingala ya Lelo oyo; 2 Timote 3:1.

 Makambo oyo Yesu alobaki ezali kosalema lelo oyo. Mpo na koyeba makambo mosusu oyo etali mikolo ya nsuka, tángá lisolo: “Elembo ya ‘mikolo ya nsuka,’ to ‘ntango ya suka’ ezali nini?

Biblia ekoki kopesa yo makasi

  •    “Nzambe ya kobɔndisama nyonso . . . abɔndisaka biso na kati ya bolɔzi na biso nyonso.”​—2 Bakorinti 1:3, 4.

 Bato mingi oyo babungisá ndeko to moninga na liwa bazwaka makasi ntango batángaka Biblia. Mpo na koyeba makambo mosusu oyo ekoki kosalisa yo, tángá lisolo: “Oyo okoki kosala mpo na kolonga mpasi wana” mpe “Lisalisi oyo eleki malamu mpo na baoyo babungisi moto na liwa.”

Biblia emonisi eloko oyo ekosilisa bampasi oyo nyonso

  •    “Bokonzi na yo eya. Mokano na yo esalema, lokola na likoló, ndenge moko mpe na mabele.”​—Matai 6:10.

 Mosika te, “Bokonzi ya Nzambe” ekosala ete moto moko te aloba: “Nazali na maladi.” (Marko 1:14, 15; Yisaya 33:24) Mpo na koyeba makambo oyo guvɛrnema yango ya likoló ekosala, talá video Bokonzi ya Nzambe ezali nini?

 Tolendisi yo oyekola makambo mingi oyo Biblia eteyaka mpo batoli na yango ya bwanya esalisa yo ná libota na yo, mpe bósepela na bilaka na yango ya kitoko.