Lakisá makambo oyo ezali na kati

Nani abandisá lingomba ya Batatoli ya Yehova?

Nani abandisá lingomba ya Batatoli ya Yehova?

 Na mikolo na biso, lisolo ya Batatoli ya Yehova ebandaki na nsuka ya bambula ya 1800. Na ntango wana, mwa etuluku moko ya bato oyo bazalaki kofanda pene na Pittsburgh, na etúká ya Pennsylvanie, na États-Unis, bamipesaki na koyekola mateya oyo ezali na Biblia. Bazalaki kokokanisa makambo oyo mangomba ezalaki koteya ná makambo oyo Biblia elobi mpenza. Makambo oyo bayekoli, bakómaki kobimisa yango na babuku, na bazulunalo ya mokili, mpe na zulunalo oyo eyebani lelo na nkombo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli​—Eyebisaka Bokonzi ya Yehova.

 Charles Taze Russell azalaki na kati ya bato wana oyo bamipesaki na koyekola Biblia. Atako Russell nde azalaki kotambwisa mosala ya koteya Biblia na ntango wana mpe ye nde abimisaki Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpo na mbala ya liboso, abandisaki lingomba ya sika te. Russell ná baninga na ye mosusu Bayekoli Biblia (ndenge bazalaki kobenga bango) bazalaki na mokano ya kopalanganisa mateya ya Yesu mpe kolanda makambo oyo ezalaki kosalema na lisangá ya bokristo ya liboso. Lokola Yesu nde abandisaki lisangá ya bokristo, tomonaka ete ye nde Mobandisi ya lingomba na biso.​—Bakolose 1:18-20.