Lakisá makambo oyo ezali na kati

“Amonisi bosembo”

“Amonisi bosembo”

 Danielle, Motatoli ya Yehova moko na Afrika ya sudi, amonaki sakosi moko oyo kiliya abosanaki na restora. Kati ya sakosi yango, ezalaki na saki ya moke ya mbongo mpe karte ya banki. Azwaki ekateli ya kozongisa sakosi yango epai ya nkolo na yango, Danielle alukaki adrɛsi to nimero ya telefone, kasi azwaki kaka nkombo ya mobali moko. alukaki kosolola na mobali yango na nzela ya banki na ye kasi esimbaki te. Alɛmbaki nzoto te. azwaki na saki faktire moko ya monganga, yango wana, abengaki nimero ya telefone oyo ezalaki na faktire yango, Danielle azwaki sɛkrɛtɛrɛ ya lopitalo yango mpe sɛkrɛtɛrɛ andimaki kopesa mobali yango nimero ya telefone ya Danielle mpo básolola.

 Mobali yango akamwaki ntango babengaki ye na sɛkrɛtɛrɛ ya lopitalo yango mpo na koyebisa ye ete Danielle azwaki saki na ye mpe ete alingi kozongisela ye. Ntango mobali yango ayaki kozwa saki na ye, Danielle ná tata na ye nde bayambaki ye. Bazwaki libaku yango mpo na koyebisa ye ntina oyo basalaki makasi mpo na kozwa ye. Balimbwelaki ye ete Batatoli ya Yehova basalaka makasi mpo na kotosa toli ya Biblia. Yango wana basalaka makasi bázala ntango nyonso sembo.​—Baebre 13:18.

 Mwa bangonga na nsima, mobali yango atindelaki Danielle ná tata na ye mesaje, mpe apesaki bango lisusu matɔndi ndenge bazongiselaki ye sakosi mpe saki na ye ya moke ya mbongo. Akomaki boye: “Nazali mpenza na botɔndi ndenge bosalaki makasi mpo bózwa ngai. Nasepelaki kokutana na bino mpe nakobosana te ndenge boyambaki ngai na nsai mpe na esengo. Nakosepela kopesa bino mbano mpo na makambo oyo bosaleli ngai. Nayebi ete bosalaki nyonso mpo na kokokisa mokumba oyo Nzambe apesaki bino. Makambo oyo Danielle asali emonisi lolenge ya bato oyo bazali: bato ya kolongobana mpe bato ya bosembo. Napesi bino lisusu matɔndi, matɔndi mingi mpe tiká Nzambe apambola mosala na bino.”

 Mwa basanza na nsima, tata ya Danielle asololaki na mobali yango, mpe mobali yango ayebisaki tata ya Danielle ete ye mpe azwaki saki ya mbongo na nzela ntango azalaki kotambola. Ntango azwaki nkolo saki yango mpe azongiselaki ye, alimbwelaki ye makambo oyo esali ete azongisela ye saki na ye ezali mpo moto moko autaki kozongisela ye sakosi na ye oyo abosanaki na restora. Auti kosala makambo oyo basalelaki ye. Alobaki boye: “Bosembo mpe boboto oyo bamoniseli moto etindaka moto yango mpe amonisela basusu, yango nde esalaka ete bomoi ya moto nyonso ezala kitoko.”