Lakisá makambo oyo ezali na kati

MITUNA OYO BILENGE BATUNAKA

Mpo na nini kozala sembo?

Mpo na nini kozala sembo?

 Mpo na nini bato mosusu bazalaka sembo te

 Na mokili ya lelo, emonanaka lokola ete bosembo efutaka te. Kutu, bamosusu bakoki koloba boye:

  •   ‘Soki nakosi baboti na ngai te, bakopekisa ngai makambo mosusu.’

  •   ‘Soki nayibi te na ekzamɛ oyo, nakozwa te.’

  •   ‘Soki nayibi eloko oyo te, ekosɛnga naluka lisusu mbongo ya kosomba yango.’

 ‘Bamosusu bakoki koloba boye: ‘Kutu, mabe ezali wapi.’ ‘Bato ya sembo mpe bazalaka?’

 Eyano na motuna wana ezali Ɛɛ. Bato mingi, ata mpe ebele ya bilenge bamonaka ete bosembo efutaka mpe bazali na ntina ya koloba bongo. Biblia elobi ete “nyonso oyo moto azali kolona, yango nde akobuka.” (Bagalatia 6:7) Na maloba mosusu, makambo oyo tosalaka ebotaka ntango nyonso mbuma; ya malamu to ya mabe.

 Na ndakisa, tótalela mbuma mabe oyo bato mosusu babukaki mpo bakosaki.

  “Nakosaki mama mpo na mwana-mobali moko. Mama ayebaki mpenza ete nazalaki kokosa. Nsima ya kokosa ye mbala misato, mama asilikaki mpenza. Pɔsɔ mibale mobimba apekisaki ngai nabima mpe sanza mobimba nakokaki te kosolola na telefone to kotala televizyo. Nakosaki lisusu baboti na ngai te!”​—Anita.

 Omituna boye: Mpo na nini ekoki kozwa lisusu mwa ntango mpo mama atyela lisusu Anita motema?

 Biblia elobi boye: “Sikoyo lokola bolongoli lokuta, bólobaka solo mokomoko na bino na mozalani na ye.”​—Baefese 4:25.

  “Nakosaki baboti na ngai mpe nakanisaki ete bayebi yango te tii ntango na nsima bayebisaki ngai nabandela koloba makambo oyo nalobaki ete esalemaki. Ezalaki mpenza lokuta mpo nayebaki lisusu te ata makambo mikemike oyo nalobaki. Soki na ebandeli olobi solo, okokutana na likambo ya boye te!”​—Anthony.

 Omituna boye: Ndenge nini Anthony akokaki koboya likambo ya ndenge wana ekómela ye?

 Biblia elobi boye: “Mbɛbu oyo elobaka lokuta ezali eloko oyo Yehova ayiná, kasi baoyo bazali kosala na bosembo basepelisaka ye.”​—Masese 12:22.

  “Nazali na moninga moko oyo abakisaka mungwa ná pilili soki azali kobɛta masolo na ye mpo ebima kitoko. Alekisaka ndelo mpenza. Nalingaka ye mpe nalandelaka te makambo mosusu oyo alobaka. Kasi ezali mpasi mpenza nandimela ye to natyela ye motema.”​—Yvonne.

 Omituna boye: Ndenge nini kolekisa ndelo mpe koloba lokuta ya “mikemike” ekoki kobebisa lokumu ya moninga ya Yvonne?

 Biblia elobi boye: “Tolingi kozala sembo na makambo nyonso.”​—Baebre 13:18.

Fondasyo ya malamu te ekoki kokweisa ndako mobimba; ndenge moko mpe, kozanga bosembo ekoki kobebisa lokumu na yo

 Mpo na nini bosembo efutaka

 Talelá sikoyo mbuma malamu oyo okoki kobuka soki ozali sembo.

  “Mwasi moko oyo azalaki liboso na ngai akweisaki mbongo. Nabelelaki ye mpe nazongiselaki ye mbongo na ye. Asepelaki mpenza. Alobaki boye: ‘Osali malamu mpenza. Bato mingi te bakoki kosala oyo osali.’ Namiyokaki malamu ndenge bayebisaki ngai ete nasali likambo ya malamu!”​—Vivian.

 Omituna boye: Mpo na nini mwasi yango akamwaki komona bosembo ya ndenge wana? Ndenge nini Vivian abukaki mbuma malamu mpo na bosembo na ye?

 Biblia elobi boye: “Esengo na baoyo bazali . . . kosalela boyengebene ntango nyonso.”​—Nzembo 106:3.

  “Tozalaki kosala mosala ya kosukola babiro libota mobimba mpe na bantango mosusu soki tozali kosukola biro moko, tokomona mbongo na pavema. Soki tomoni yango totyaka yango na mesa oyo ezali pene wana. Mosali moko akómaki kobaye bosembo na biso; alobaki boye, ‘ezali na yango kaka mwa mbongo moke!’ Kasi boyebi nini? Azalaki ntango nyonso kotyela biso motema.”​—Julia.

 Omituna boye: Ndenge nini bosembo ya Julia ekoki kofuta soki akei koluka mosala mosusu?

 Biblia elobi boye: “Salá nyonso oyo ekoki na yo mpo ozala moto oyo andimami na miso ya Nzambe, mosali oyo azali koyoka nsɔni te mpo na mosala na ye.”​—2 Timote 2:15.

  “Na esika báfuta ngai mbongo ya mosala oyo nasalaki na boumeli ya ngonga 64, bafutaki ngai nde ya ngonga 80. Atako nakokaki kotikala na mbongo yango, namonaki malamu nasala bongo te. Nalakisaki yango mokonzi oyo afutaka biso mpe apesaki ngai mersi. Kompanyi yango ekɔtisaka mbongo ebele, kasi naboyaki kotikala na mbongo yango noki namona lokola nayibi.”​—Bethany.

 Omituna boye: Koyiba na kompanyi ezali mpenza mabe te koleka koyiba eloko ya moto?

 Biblia elobi boye: “Moto ya mbilingambilinga azali eloko moko oyo Yehova ayinaka, kasi Ye azali moninga ya motema ya bato ya kolongobana.”​—Masese 3:32.