Lakisá makambo oyo ezali na kati

Biblia elobi nini na likambo etali komilinga?

Biblia elobi nini na likambo etali komilinga?

Eyano ya Biblia

 Biblia emonisi ete ezali mabe te mpe ezali na ntina moto amilinga kozanga kolekisa ndelo. Bolingo ya ndenge wana esɛngi komibatela, komipesa kilo mpe komona ete ozali na valɛrɛ. (Matai 10:31) Na esika Biblia ekumisa likambo ya koluka bolamu ya moto ye moko, etye nde komilinga na esika na yango.

Tosengeli kolinga liboso nani?

  1.   Tosengeli kolinga liboso Nzambe na mitema na biso. Biblia elobi ete mobeko oyo eleki monene ezali oyo: “Osengeli kolinga Yehova Nzambe na yo na motema na yo mobimba.”​—Marko 12:28-30; Mibeko 6:5.

  2.   Mobeko ya mibale oyo eleki monene ezali oyo: “Osengeli kolinga mozalani na yo lokola yo moko.”​—Marko 12:31; Balevi 19:18.

  3.   Atako Biblia etángi polele te mobeko etali komilinga, mobeko oyo esɛngi “kolinga mozalani na yo lokola yo moko” emonisi ete ezali mabe te komilinga na ndenge ebongi mpe komipesa kilo ezali malamu mpe na litomba.

Yesu alingaki liboso nani?

 Yesu amonisaki ndenge ya kozala na bokatikati na likambo etali kolinga Nzambe, kolinga mozalani mpe komilinga mpe apesaki bayekoli na ye malako bálanda ndakisa na ye.​—Yoane 13:34, 35.

  1.   Alingaki liboso Yehova mpe amipesaki mobimba na kokokisa mosala apesaki ye.Alobaki boye: “Mpo mokili eyeba ete ngai nalingaka Tata, ɛɛ kaka ndenge Tata apesi ngai mitindo, nazali kosala kaka bongo”​—Yoane 14:31.

  2.   Yesu alingaki bazalani na ye, amonisaki yango ndenge akokisaki mposa ya basusu ata tii na kokaba bomoi na ye.​—Matai 20:28.

  3.   Amonisaki ete amilingaka na ndenge ebongi ndenge azalaki kozwa ntango ya kopema, kolya mpe kozala elongo na bayekoli na ye.​—Marko 6:31, 32; Luka 5:29; Yoane 2:1, 2; 12:2.

Kolinga basusu liboso ya komilinga ekokitisa esengo na yo to kilo oyo omipesaka?

 Te, mpo tokelamá na elilingi ya Nzambe oyo ezaleli na ye ya libosoliboso ezali bolingo ya solosolo. (Ebandeli 1:27; 1 Yoane 4:8) Yango elingi koloba ete tokelamá mpo na komonisela basusu bolingo. Komilinga ezali na esika na yango, ata bongo tozalaka na esengo mingi soki tolingi Nzambe koleka biloko nyonso mpe tomipesi na kosalela basusu bolamu. Ndenge Biblia elobi, “Esengo ya kopesa eleki oyo ya kozwa.”​—Misala 20:35.

 Lelo oyo bato mingi balobaka esengo eyaka soki ozali komitya na esika ya liboso. Mpo na bango, “komilinga” ezwi esika ya “kolinga mozalani na yo.” Kasi, makambo emonisi ete moto azalaka na sante ya malamu mpe na esengo soki azali kosalela toli oyo ya Biblia: “Moto na moto akoba koluka, litomba na ye moko te, kasi oyo ya moto mosusu.”​—1 Bakorinti 10:24.