Lakisá makambo oyo ezali na kati

Ezali nde na “Masumu nsambo oyo ememaka na liwa”?

Ezali nde na “Masumu nsambo oyo ememaka na liwa”?

Eyano ya Biblia

 Biblia elobeli mpenza te “Masumu nsambo oyo ememaka na liwa.” Kasi, eteyaka ete soki moto azali kosala masumu minene akozwa lobiko te. Na ndakisa, Biblia elobi ete masumu minene lokola pite, losambo ya bikeko, misala ya bilimo mabe, nkanda makasimakasi mpe kolangwa masanga ezali “misala ya nzoto.” Mpe na nsima ebakisi: “Baoyo basalaka makambo ya ndenge wana bakozwa libula ya bokonzi ya Nzambe te.”​—Bagalatia 5:19-21. a

Biblia etángi ‘makambo nsambo ya nsomo o miso ma Yawe’?

 Ɛɛ, etángi yango. Biblia Liloba Lya Nzambe elobi boye na Masese 6:16: “Yawe akoyinaka makambo motoba, makambo nsambo maleki nsomo o miso ma ye.” Kasi, liste ya masumu oyo Masese 6:17-19 etángi esukisi masumu nyonso te. Kutu, elobeli nde masumu minene oyo emonisaka makambo mabe ya ndenge nyonso, ezala na makanisi, na maloba to na misala. b

Maloba “masumu oyo ememaka na liwa” elimboli nini?

 Mabongoli mosusu ya Biblia esaleli maloba yango na 1 Yoane 5:16. Na ndakisa, Bible na Lingala ya lelo oyo, elobi: “lisumu moko ezali oyo ememaka liwa.” Maloba oyo ebongolami na “lisumu moko oyo ememaka liwa” ekoki mpe kobongolama na “lisumu oyo ememaka na liwa.” “Lisumu oyo ememaka na liwa” mpe “lisumu moko oyo ememaka na liwa te” ekeseni na nini?​—1 Yoane 5:16.

 Biblia emonisi polele ete masumu nyonso ememaka na liwa. Kasi, tokoki kobikisama na lisumu mpe na liwa na nzela ya mbeka ya lisiko ya Yesu Kristo. (Baroma 5:12; 6:23) Na yango, “lisumu oyo ememaka na liwa” ezali oyo lisiko ya Kristo ezipi yango te. Moto oyo asali lisumu ya ndenge wana azalaka na ekateli ya kokoba kosala yango mpe abongwanaka te. Biblia emonisaka ete lisumu ya ndenge wana “ekolimbisama te.”​—Matai 12:31; Luka 12:10.

a Liste ya masumu 15 oyo Bagalatia 5:19-21 etángi emonisi te ete yango nde masumu nyonso, mpo nsima ya kotánga masumu yango, Biblia ebakisi maloba “mpe makambo oyo ekokani na oyo wana.” Na yango, motángi alendisami na kosalela makoki na ye ya kososola mpo na komona makambo oyo ezangi na liste yango kasi “ekokani na oyo wana.”

b Masese 6:16 ezali na ndakisa ya lisese moko ya Ebre oyo ebɛtaka nsete na motángo ya mibale mpo na kokesenisa yango na motángo ya liboso. Mbala mingi maloba ya ndenge wana ezalaka na Makomami.​—Yobo 5:19; Masese 30:15, 18, 21.