Lakisá makambo oyo ezali na kati

Lisumu oyo ekoki kolimbisama te ezali nini?

Lisumu oyo ekoki kolimbisama te ezali nini?

Eyano ya Biblia

 Lisumu oyo ekoki kolimbisama te etaleli misala oyo esangani na ezaleli oyo ekopekisa Nzambe alimbisa mosumuki. Ezaleli yango ekolaka ndenge nini?

 Nzambe alimbisaka baoyo babongolaka motema na masumu na bango, batosaka mibeko na ye mpe bamonisaka kondima epai ya Yesu Kristo. (Misala 3:19, 20) Kasi, moto akoki kokangama mpenza na kosala lisumu mpe koboya kotika ezaleli to likambo yango. Biblia elobeli moto ya ndenge wana ete azali “na motema mabe” oyo ‘ekómá makasi mpo na nguya ya bokosi ya lisumu.’ (Baebre 3:12, 13) Lokola mabele ya lima oyo batumbi na fur mpe bakoki kobongisa yango lisusu te, motema ya moto yango etombokeli Nzambe mpo na libela. (Yisaya 45:9) Ezali na mwaye moko lisusu te mpo moto ya ndenge wana alimbisama, na yango, amemi ngambo ya lisumu oyo ekoki kolimbisama te.​—Baebre 10:26, 27.

 Na yango, bakonzi ya lingomba ya Bayuda na ntango ya Yesu basalaki lisumu oyo ekoki kolimbisama te. Bayebaki ete Yesu azalaki kosala makamwisi na lisalisi ya elimo santu ya Nzambe kasi na motema mabe nyonso balobaki ete Yesu azwaki nguya yango epai ya Satana Zabolo.​—Marko 3:22, 28-30.

Masumu oyo ekoki kolimbisama

  •  Kofinga Nzambe kozanga koyeba. Ntoma Paulo azalaki liboso mofingi, kasi na nsima alobaki boye: “Bayokelaki ngai mawa, mpo nazalaki na boyebi te mpe nazalaki kosala na kondima te.”​—1 Timote 1:13.

  •  Ekobo. Biblia elobeli bato mosusu oyo liboso basalaki ekobo kasi babongwanaki mpe Nzambe alimbisaki bango.​—1 Bakorinti 6:9-11.

“Nasalaki lisumu oyo ekoki kolimbisama te?”

 Soki oyinaka mpenza masumu oyo osalá kala mpe olingi mpenza kobongwana, boye osalaki te masumu oyo ekoki kolimbisama te. Nzambe akoki kutu kolimbisa ata lisumu oyo moto asali mbala na mbala soki akómisi motema na ye makasi te mpo na lisumu yango.​—Masese 24:16.

 Bato mosusu bakanisaka ete mbala mosusu basalaki lisumu oyo ekoki kolimbisama te mpo bazali komiyoka lokola bamemi ngambo. Kasi, Biblia eteyaka ete tokoki ntango nyonso te kondimela motema na biso. (Yirimia 17:9) Nzambe apesá biso nzela te ya kosambisa basusu; ata mpe ya komisambisa. (Baroma 14:4, 12) Akoki kutu kolimbisa ata ntango motema na biso ezali kokweisa biso.​—1 Yoane 3:19, 20.

Yudasi Mokeriota asalaki lisumu oyo ekoki kolimbisama te?

 Ɛɛ, asalaki yango. Lokoso etindaki ye ayibaka mbongo ya mabonza oyo bato bazalaki kotya mpo na mosala mosantu. Amonisaki lokola azalaki koyokela babola mawa nzokande mposa na ye ezalaki nde azwa mbongo mingi ya koyiba. (Yoane 12:4-8) Ntango motema ya Yudasi emipesaki libela na kosala mabe, atɛkaki Yesu na shekele ya palata 30. Yesu ayebaki ete Yudasi akobongwana te mpo na oyo asalaki mpe abengaki ye “mwana ya libebi.” (Yoane 17:12) Yango elingi koloba ete ntango Yudasi akufaki, ezalaki mpo na libela, elikya ya kosekwa ezalaki te mpo na ye.​—Marko 14:21.

 Yudasi amonisaki ata moke te ete abongolaki motema na lisumu na ye. Atubelaki yango epai ya Nzambe te kasi nde epai ya bakonzi ya mangomba oyo ayokanaki na bango.​—Matai 27:3-5; 2 Bakorinti 7:10.