Lakisá makambo oyo ezali na kati

Nzambe akosalisa ngai soki nabondeli ye?

Nzambe akosalisa ngai soki nabondeli ye?

Eyano ya Biblia

 Ɛɛ, Nzambe asalisaka bato oyo basɛngaka ye na motema mobimba makambo oyo eyokani na mokano na ye. Ata soki obondelá naino Nzambe te, bandakisa oyo ezali na Biblia ya bato oyo babondelaki ete: “Nzambe salisá ngai,” ekoki kolendisa yo. Talá bandakisa oyo:

  •   “Yawe, Nzambe na ngai, yaka kosalisa ngai; na bolingo na yo oyo esukaka té, bikisa ngai.”​—Nzembo 109:26, Bible na lingala ya lelo oyo.

  •   “Nkolo Yawe ya nguya nyonso, bikisa ngai.”​—Nzembo 69:7, Bible na lingala ya lelo oyo.

 Ya solo, bato oyo bakomaki makambo wana bazalaki na kondima makasi epai ya Nzambe. Kasi, Nzambe ayokaka bato nyonso oyo bapusanaka epai na ye na makanisi ya malamu, na ndakisa baoyo “motema ebukani” to “elimo etutami.”​—Nzembo 34:18.

 Kokanisa te ete Nzambe azali mosika mpe akipaka makambo na yo te. Biblia elobi boye: “Yehova atombwani, mpe atako bongo amonaka moto ya komikitisa; kasi moto ya lolendo, ayebaka ye kaka na mosika.” (Nzembo 138:6) Kutu, mokolo moko Yesu ayebisaki bayekoli na ye boye: “Nsuki nyonso ya motó na bino etángami.” (Matai 10:30) Nzambe ayebi makambo nyonso oyo etali na yo, ata oyo yo moko oyebi te. Bongo ayoka yo te ndenge nini soki obondeli ye asalisa yo na mitungisi oyo ozali na yango!​—1 Petro 5:7.