Buku ya mobu 2016 ya Batatoli ya Yehova

Tángá makambo oyo Batatoli ya Yehova basali na mobu 2015, mpe lisolo na bango na Indonésie.

Mokapo ya mobu 2016

Maloba ya Baebre 13:1 ezali elendiseli mpe etinda.

Mokanda ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi

Mokanda oyo ya kolendisa emonisi ndenge site Internet jw.org, TV JW, kotanda mikanda mpo na kosakola mpe mayangani ya etúká ya mobu 2015 ezali mpenza lipamboli.

“Tolingi TV JW mingi mpenza!”

Esɛngaki nini mpo na kotonga ndako ya televizyo yango ya kotala na nzela ya Internet?

Kotonga Bandako ya Bokonzi nokinoki

Babongisaki lisusu mosala mpo Bandako ya Bokonzi ebele mpenza etongama.

Ndenge nini mosala ezali kotambola na Warwick?

Talá ndenge mosala ya botongi ya biro ya sika ya Batatoli ya Yehova ezali kosalema.

Tokómi kokutana na bato oyo tomonaka te

Nini endimisaki Terry ete makambo oyo ayokaki epai ya Batatoli ya Yehova ezalaki eyano na mabondeli na ye?

Pole ezali se kongɛnga makasi

Na eteni oyo, tángá ndenge Yehova azali kokoba kongɛngisa nzela ya basambeli ya solo.

Bofungoli Babetele

Na ebandeli ya 2015, Batatoli ya Yehova na Madagascar mpe na Indonésie bazwaki mapamboli oyo bakobosana te.

Libongoli ya Mokili ya Sika na minɔkɔ mosusu

Babiblia zomi na motoba ebimaki na mobu ya mosala 2015.

Bikateli ya batribinale

Bato na mokili mobimba bazali se kotɛmɛla ezaleli ya koyina baninga mpo na lingomba na bango.

Bansango oyo euti na mikili ndenge na ndenge

Mbongo oyo Ken azalaki kobomba na kɛsi na ye esalisi na botongi Ndako ya Bokonzi moko.

Afrika

Mayele nini Batatoli ya Yehova bazali kosalela mpo na kosakola nsango malamu?

Amerika

Mpo na nini mwasi moko apelisaka buji na zamba mpo na koyekola Biblia? Mpo na nini nkumu moko ya nkandankanda azalaki kozela Batatoli ya Yehova? Mpe mpo na nini moto moko oyo kala azalaki konyokola Batatoli alelaki?

Azia mpe Moyen-Orient

Eloko moko te ezongisaka basakoli ya Bokonzi nsima—ezala mikakatano ya nzoto to ata bolɔkɔ.

Mpoto

Moto moko ya ekólo Roma, moto moko ya bolɔkɔ mpe mwasi moko oyo alingaki komiboma basepelaki mingi ntango bayokaki mateya ya solo.

Océanie

Kotanda mikanda na bamesa mpe bashario, site Internet jw.org, mpe bavideo na biso ezali kosalisa mingi na kolona mboto ya solo na mitema ya bato ebele mpenza!

Makambo etali Indonésie

Talá na mokuse makambo etali esanga oyo esangisi bisanga ebele koleka na mokili mobimba, mokili yango, bato, mpe mimeseno na bango.

Mombongo ya bikelakela ya kotya na bilei (épices)

Na bambula ya 1500, mombongo ya bikelakela ya kotya na bilei etombolaki nkita ya mokili mobimba.

Nakobanda awa!

Mwa ba colporteur (babongisi-nzela) ya mpiko oyo bautaki Australie balongaki makambo oyo ezalaki kopekisa mosala ya kosakola esalema na Indonésie.

Mayele oyo basalelaki na ebandeli

Radio mpe kosakola na masuwa epelisaki nkanda ya banguna ya solo na Indonésie.

Bibelkring

Lingomba yango ezwaki mateya mingi na mikanda ya Batatoli ya Yehova, kasi na nsima makanisi ya bomoto ekɔtaki na lingomba yango.

Alingaki mpenza makambo ya Nzambe

Bato ya mobulu bakɔtaki na ndako ya Thio Seng Bie, kasi, batikaki eloko moko oyo alingaki mingi koleka biloko nyonso oyo abungisaki.

Java Occidental eboti mbuma

Lokola bazalaki kopekisa mikanda na bango mosusu, Batatoli ya Yehova basalelaki mayele mosusu mpo na kosakola.

Boyangeli ya Japon

Na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, basalaki makasi bázwa karte oyo bakonzi ya Japon basɛngisaki bana-mboka, kozanga bákɔta na makambo ya politike.

Mobongisi-nzela ya mpiko

André Elias asaleli Nzambe mbula 60. Na boumeli ya ntango yango, abateli bosembo na ye atako basoda bazalaki kosambisasambisa ye mpe kokanela ye.

Bamisionɛrɛ ya Gileade bayei

Bamisionɛrɛ oyo bautaki na Eteyelo ya Gileade bayaki kosalisa mpo mosala ya kosakola ekende liboso.

Mosala epalangani na ɛsti

Botɛmɛli ya bakonzi ya mangomba elongi na mbala oyo?

Bamisionɛrɛ mosusu bayei

Makambo ebebaki na mbalakaka mpe kosakola nsango malamu ekómaki mpasi na katikati ya bambula ya 1970.

Azalaki mpenza mwana ya Sara

Titi Koetin azalaki kotosa mobali na ye na motema moko mpe azwaki mapamboli ebele.

Liyangani oyo etiká nsango

Liyangani “Nsango malamu ya seko” oyo esalemaki na 1963 elekaki malamu atako mikakatano ezalaki ebele.

Bakoministe babomaki ngai te

Batimolaki libulu mpo na kokunda Ronald Jacka.

Mbula 50 na mosala ya mobongisi-nzela monene

Na 1964, pastɛrɛ moko ya Protesta abelelaki ete, ‘Nakosilisa Batatoli ya Yehova na Manokwari!’ Alongaki kosala yango?

Mokonzi ya basali-mabe akómá moto malamu

Mokonzi moko atunaki boye: “Batatoli ya Yehova basalaka mpenza nini na Indonésie?”

Bazalaki kaka kokende liboso

Nini etindaki bato mosusu báloba ete “Batatoli ya Yehova bazali lokola nsɛtɛ”?

Batikaki koyangana te

Ntango epekiseli na mosala ya Batatoli ya Yehova elongwaki, mokonzi mosusu alobaki likambo ya kokamwa ete: “Ata soki bokomami na buku ya Leta, yango te nde epesi bino bonsomi ya losambo.”

Bolingo ya bokristo emonani na ntango ya likama

Batatoli ya Yehova basalaki nokinoki mpo na kosunga bandeko ya mboka Gunungsitoli, esika mabele eninganaki makasi.

Totikalaki sembo

Daniel Lokollo alobeli ndenge bakɛngɛli ya bolɔkɔ banyokolaki ye makasi.

Totosaki malako mpe tobikaki!

Bitumba ya Bamizilma ná bakristo na Indonésie ekómaki likama mpo na Batatoli ya Yehova.

Mosala ekómi monene

Ntango epekiseli elongwaki, bandeko babongisaki makambo misato ya minene.

Kosakola nkombo ya Yehova na mpiko

Ndenge nini Batatoli balongolaki bizaleli ya bonkɔkɔ mpe ya mboka oyo ezalaki kopekisa bango kosakola na mpiko?

Batye Betele na esika oyo eyebani

Basakoli-basungi oyo bazalaki koluka esika ya kokende, bazwaki yango.

Yehova apambolaki biso koleka ndenge tokanisaki!

Bandeko ya lisangá ya Tugala Oyo, mboka moko na Indonésie, bazwaki lipamboli oyo bakanisaki te.

Nsukansuka bakutanaki!

Bandeko mibale ya baba na Indonésie bakabwanaki ntango moko atɛkamaki na libota mosusu, kasi solo esangisaki bango.

Eleki mbula nkama moko—1916

Likambo moko oyo esalemaki pene ya nsuka ya mobu 1916 ezalaki likambo monene mpo na Bayekoli ya Biblia.

Mitángo mpo na 2015

Milende nini tosalaki mpe mbongo boni tosalelaki mpo na kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe?

Ekaniseli ya liwa ya Yesu—Mokolo ya mitano, mwa 03/04/2015

Kampanye oyo tosalaki pɔsɔ minei mpo na kobengisa bato na Ekaniseli ebotaki mpenza mbuma.