Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

INDONÉSIE

Mayele oyo basalelaki na ebandeli

Mayele oyo basalelaki na ebandeli

Radio

Na 1933, bandeko basɛngaki radio moko na Jakarta elekisaka badiskur ya Lingelesi oyo ndeko Rutherford azalaki kosala. Moto moko oyo azalaki kosepela na solo azalaki mpe kotánga badiskur mosusu na monɔkɔ ya Néerlandais. Baemisyo yango ebendaki likebi ya bato mpe esalisaki bandeko bákabola mikanda ebele.

Mokolo moko ntango balekisaki diskur ya kafukafu ya ndeko Rutherford oyo elobaki, “Mobu mosantu ememi nde kimya mpe bomɛngo?, bakonzi ya Lingomba ya Katolike basilikaki makasi. * Batindaki bandimi na bango báfunda ndeko De Schumaker, oyo apesaki diskur yango mpo eleka na radio, ete “afingi, atyoli, mpe ayinaka bango.” Ndeko De Schumaker asambaki malamu na tribinale mpe alongaki. Kasi, afutaki lomande ya guilders 25 * mpe mosolo ya Leta. Bazulunalo misato ya mboka elobelaki likambo yango, mpe litatoli monene koleka epesamaki.

Momemi-pole

Na mokolo ya 15/07/1935, masuwa ya la Société Watch Tower Momemi-pole (Lightbearer), oyo ezalaki na bolai ya mɛtrɛ 16, ekómaki na Jakarta, nsima ya kosakola nzelanzela sanza 6 longwa engumba Sydney, na Australie. Ememaki babongisi-nzela nsambo ya molende oyo bakanaki kopalanganisa nsango malamu na Indonésie, na Singapour, mpe na Malaisie.

Na boumeli ya mbula koleka mibale, babongisi-nzela oyo bazalaki na masuwa yango bakendaki na mabongo ya mike mpe ya minene ya Indonésie, mpe bakabolaki mikanda ebele. Ndeko Jeanne Deschamp alobaki ete ntango nyonso oyo masuwa ekómi na libongo moko ya moke, “bandeko bazalaki kobɛta fono mpe kotya diskur ya ndeko Rutherford, oyo azalaki prezida ya la Société. Bato wana ya bamboka mosika ya Malaisie bazalaki kokamwa komona masuwa moko monene ezali koya na libongo na bango, mpe koyoka mongongo moko monene ezali koloba. Ata soucoupe volante (eloko moko oyo ezalaka lokola saani mpe etambolaka likoló) elingaki kokamwisa bato ndenge wana te.”

Molende ya bandeko yango epesaki bakonzi ya mangomba nkanda, mpe nsukansuka batyaki bakonzi ya Leta mbamba bápekisa masuwa Momemi-pole na mabongo mingi ya Indonésie. Na sanza ya zomi na mibale ya 1937, masuwa Momemi-pole ezongaki na Australie; esalaki mosala lokola ya misionɛrɛ ya molende na Indonésie.

Bandeko oyo bazalaki kotamwisa masuwa Momemi-pole

^ par. 2 Diskur wana ya ndeko Rutherford emonisaki polele ete bakonzi ya Lingomba ya Katolike bateyaka makambo ya lokuta, bakɔtaka na politiki mpe basalaka mombongo.

^ par. 2 Lelo, ezali mbongo dolare soki 300.