Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

INDONÉSIE

Batye Betele na esika oyo eyebani

Batye Betele na esika oyo eyebani

Biro oyo ezali na etaze ya 31

Na 2008, basakoli bakómaki 21 699 na Indonésie. Betele ekómaki moke mpenza. Lisusu, lokola bandako yango etongamaki na ntango ya epekiseli, ezalaki na esika ebombaná na Jakarta. Emonanaki polele ete esengeli kotonga Betele ya monene na kati ya engumba.

Mbula soki mibale na nsima, bandeko basombaki lopango moko oyo ekesanaki mpenza na lopango ya Betele ya liboso: bandako nyonso oyo ezalaki na etaze ya 31 na ndako moko ya baetaze 42 pene ya Jakarta Central. Na nsima, basombaki mpe baetaze 12 na ndako moko molai oyo ezalaki pembeni wana mpo ekoka bandeko 80 to koleka ya Betele. Bazwaki mpe ndako moko ya baetaze mitano mpo ezala babiro.

Bashambre ya Betele ezali na baetaze 12

Mwa bandeko oyo bautaki na bikólo ndenge na ndenge basalaki elongo na basali mosusu ya Indonésie mpo na kobongisa babiro mpe bandako yango. Ndeko Darren Berg, oyo azali mokɛngɛli ya mosala ya botongi alobi boye: “Yehova azalaki ntango nyonso kosalisa biso na makambo oyo ezalaki komonana lokola ekosimba te. Na ndakisa, tolingaki kotya masini moko ya monene mpo na kopɛtola mai ya bosɔtɔ liboso ekima na baterase, kasi bakonzi bayebaki mayele yango te mpe baboyaki tósala yango. Ndeko moko oyo azali ingénieur amemaki likambo yango epai ya mokonzi mosusu. Mokonzi yango andimaki mbala moko tósala yango; alobaki ete andimi bandimbola oyo ndeko na biso apesaki.”

“Tozali lisusu kobombana te. Sikoyo bato bazali komona Batatoli ya Yehova. Bazali komona ete tokokoba kozala awa”

Molulu ya bofungoli bandako ya Betele esalemaki na mwa 14/02/2015. Anthony Morris III, ndeko ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi nde asalaki diskur ya bofungoli. Vincent Witanto Ipikkusuma, ndeko moko ya komite ya filiale alobi boye: “Betele na biso ekómi na esika ya lokumu mpenza ndenge moko na bakompanyi minene ya Indonésie. Tozali lisusu kobombana te. Sikoyo bato bazali komona Batatoli ya Yehova. Bazali komona ete tokokoba kozala awa.”

Bandeko ya Komite ya filiale, kobanda na lobɔkɔ ya mwasi: Budi Sentosa Lim, Vincent Witanto Ipikkusuma, Lothar Mihank, mpe Hideyuki Motoi

“Kosakola awa ezali elɛngi mpenza!”

Banda mwa bambula, ebele ya Batatoli ya Yehova ya bikólo mosusu bazali koya kofanda na Indonésie. Ndeko Lothar Mihank alobi boye: “Basakoli-basungi bazali kosalisa mingi na bikólo lokola oyo ya biso. Bayebi makambo ebele, bakɔmɛlá na elimo, mpe bamemaka esengo na masangá; basalisaka bandeko básepela lisusu mingi na lisangá ya bandeko na mokili mobimba.” Nini etindaki bango báya awa? Mpe makambo nini bakutani na yango? Talá oyo bandeko yango mosusu balobi.

Basakoli-basungi

1. Janine ná Dan Moore

2. Mandy ná Stuart Williams

3. Casey ná Jason Gibbs

4. Mari (liboso) ná Takahiro Akiyama (na nsima, na lobɔkɔ ya mobali)

Jason ná Casey Gibbs ya États-Unis balobi boye: “Na Buku ya mobu, totalaki etanda oyo emonisaka motángo ya bato oyo mosakoli mokomoko asengelaki koteya na bikólo nyonso mpe tomonaki ete mosakoli moko ya Indonésie asengeli koteya bato ebele. Na nsima, baninga na biso mosusu oyo bazalaki basakoli-basungi bayebisaki biso ete bato mingi bakoki kondima solo na Indonésie. Tobengaki Betele ya Indonésie, mpe bayebisaki biso tókende na esanga Bali. Lokola kosakola na Lingelesi eutaki kobanda na Indonésie, tokokaki kosalisa mbala moko. Tokanaki kosala mbula moko, kasi tosalaki mbula misato. Bato mingi oyo tokutanaki na bango bayokaki naino nsango ya Batatoli ya Yehova te. Mosala yango esalisaki mpenza!”

Stuart ná Mandy Williams ya Australie, oyo bazali na mbula soki 50, balobi boye: “Tozalaki na mposa ya kokutana na bato oyo bazali koluka solo, yango wana toyaki na Indonésie. Na engumba Malang, na Java oriental, tokutanaki na bana-kelasi ebele ya iniversite oyo balobaka Lingelesi mpe bayokaki nsango malamu na likebi mpenza. Basepelaka mpe mingi na site jw.org! Kosakola awa ezali elɛngi mpenza.”

Takahiro ná Mari Akiyama, oyo bazali babongisi-nzela na engumba Yogyakarta, na esanga Java, balobi boye: “Awa tozali na kimya koleka na mboka na biso na Japon. Bato bazali na boboto mpe na bonkonde. Bato ebele, mingimingi bilenge, balingaka koyeba makambo ya mangomba mosusu. Mokolo moko, ntango tozalaki kosakola totandi mikanda na mesa, tokabolaki bazulunalo soki 2 600 na ngonga mitano mpamba.”

Dan ná Janine Moore, oyo bazali na mbula pene na 60 balobi boye: “Ntango tobimi mosala ya kosakola, bato ebele bayaka kozinga biso. Soki tosɛki, okomona bango mpe basɛkisi biso. Batunaka mituna ebele, soki topesi bango eyano basepelaka, okomona batondi na esengo. Soki tolakisi bango likambo moko na Biblia, bamosusu balobaka, ‘Nakoki kokoma yango?’ Bwanya oyo ezali na Biblia ekamwisaka bango mpenza. Tosali mbula mobimba awa, mpe toyokaka mawa ndenge toyaki awa banda kala te. Tozalaki koluka esika oyo bato bayoká naino nsango malamu te—tozwi yango!”

Misja ná Kristina Beerens bayaki lokola bamisionɛrɛ na 2009 kasi sikoyo bazali na mosala ya zongazonga. Balobi boye: “Ata na esanga Madura na Java oriental, moko ya bisika oyo etondi na Bamizilma na Indonésie, bato bazali koyoka mpenza nsango malamu. Bato batɛlɛmisaka mituka mpo na kosɛnga bazulunalo. Balobaka: ‘Nazali Mizilma, kasi nasepelaka kotánga bazulunalo oyo. Bokoki kopesa ngai ebele napesa mpe baninga na ngai?’ Kosakola awa ezali elɛngi mpenza!”

Bilanga eteli mpo na kobuka mbuma

Na 1931, ntango ndeko Frank Rice akómaki na Jakarta, Indonésie ezalaki na bato soki 60 000 000. Lelo ekómi na bato pene na 260 000 000 mpe yango esali ete Indonésie ezala ekólo ya minei oyo eleki na bato na mokili mobimba.

Motángo ya Batatoli ya Yehova mpe ezali kobakisama na Indonésie. Na 1946, nsima ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, basakoli ya sembo batikalaki 10 mpamba na Indonésie. Lelo, basakoli bazali koleka 26 000: Yehova azali mpenza kopambola mosala! Mpe lokola bato bazalaki 55 864 na Ekaniseli ya 2015, emonani ete bokoli ekokoba kosalema.

Yesu alobaki: “Ya solo, mbuma ya kobuka ezali mingi, kasi basali bazali moke. Yango wana, bósɛnga Nkolo ya mosala ya kobuka mbuma atinda basali na mosala na ye ya kobuka mbuma.” (Mat. 9:37, 38) Batatoli ya Yehova ya Indonésie bazongelaka maloba wana mpo na teritware na bango. Mposa na bango ezali ete nkombo monene ya Yehova esantisama na esanga yango.Yis. 24:15.