Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

INDONÉSIE

Mobongisi-nzela ya mpiko

André Elias

Mobongisi-nzela ya mpiko
  • ABOTAMAKI NA 1915

  • BATISIMO 1940

  • NA MOKUSE Mobongisi-nzela ya mpiko oyo atikalaki sembo liboso ya batribinale mpe ya minyoko.

NA ETUMBA ya Mibale ya mokili mobimba, ndeko Elias ná mwasi na ye Josephine bakendaki kosamba liboso ya bakonzi ya Sukabumi, na Java occidental, na biro monene ya ba Kempeitai, bapolisi ya Japon oyo bazalaki kobangisa bato. Basambisaki liboso ndeko André. Batunaki ye mituna ebeleebele. “Batatoli ya Yehova bazali banani? Bozali kotɛmɛla guvɛrnema ya Japon? Bozali koluka basekele ya mboka?”

Ndeko André ayanolaki: “Tozali basaleli ya Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso mpe tosali likambo ya mabe te.” Mokonzi yango alongolaki mopanga ya samouraï oyo ezalaki na efelo mpe atombolaki yango.

Na nsima agangaki: “Olingi naboma yo? André atyaki motó na mesa ya biro ya mokonzi yango mpe abondelaki na motema. Bafandaki nyɛɛ ntango molai, na nsima basɛkaki makasi. Mokonzi yango alobaki na ye: “Ozali mobali ya mpiko!” Na nsima Josephine akɔtaki. Lokola makambo oyo alobaki ekokanaki na oyo ya André, mokonzi yango agangaki ete: “Bozali koluka basekele ya mboka te. Bóbima!”

Basanza ebele na nsima, “bandeko ya lokuta” bafundaki André mpe akɔtaki bolɔkɔ. (2 Ko. 11:26) Na boumeli ya basanza ebele, azalaki kolɔkɔta bilei na mai ya bosoto oyo ezalaki koleka na ndako ya bolɔkɔ oyo azalaki. Kasi, bakɛngɛli ya bolɔkɔ balongaki kobebisa bosembo na ye te. Ntango Josephine akendaki kotala ye, André ayebisaki ye na mongongo ya nse wana azalaki na kati ya bolɔkɔ ete: “Komitungisa te. Ezala babomi ngai to batiki ngai, nakotikala sembo epai ya Yehova. Bakoki kobimisa ngai awa ebembe kasi motɛki-bato te.”

Nsima ya sanza motoba na bolɔkɔ, ndeko André asambaki na Tribinale monene ya Jakarta mpe babimisaki ye na bolɔkɔ.

Mbula 30 na nsima, ntango bakonzi ya Indonésie bapekisaki lisusu mosala ya Batatoli ya Yehova, prokirɛrɛ ya engumba Manado, na Sulawesi du Nord abengisaki ndeko André na biro na ye. Atunaki ye boye: “Oyebi ete mosala ya Batatoli ya Yehova epekisami?”

André ayanolaki, “Ɛɛ.”

Mokonzi yango atunaki ye lisusu: “Okoki sikoyo kokɔta na lingomba mosusu?”

Ndeko André apusanaki mpe abɛtaki ntolo. Alobaki na mpiko ete: “Okoki kolongola ngai motema, kasi okoki kokɔtisa ngai na lingomba mosusu te.”

Prokirɛrɛ yango abenganaki André mpe atungisaki ye lisusu te.

Ndeko André akufaki na 2000, nsima ya kozala mobongisi-nzela ya molende mbula soki 60; azalaki na mbula 85.