Lakisá makambo oyo ezali na kati

MITUNA OYO BILENGE BATUNAKA

Nasala nini mpo natika kozala nsɔninsɔni?

Nasala nini mpo natika kozala nsɔninsɔni?

 Nsango ya mabe: Kozala nsɔninsɔni ekoki kosala ete ozanga baninga mpe makambo mosusu ya ntina mingi na bomoi.

 Nsango ya malamu: Kozala nsɔninsɔni ezalaka ntango nyonso mabe te. Ekoki kosalisa yo okanisa liboso ya koloba mpe ekoki kosala ete otalaka na likebi mpe ozala moyoki malamu.

 Nsango oyo eleki malamu: Kozala nsɔninsɔni ezali ezaleli oyo etikalaka mpo na libela te, mpo okoki kolonga mwa makambo mosusu oyo esalaka ete ozala nsɔninsɔni. Lisolo oyo ekosalisa yo omona ndenge oyo okoki kosala yango.

 Luká koyeba makambo oyo ebangisaka yo

 Kozala nsɔninsɔni ekoki kosala ete obanga kosolola na bato boye. Yango ekoki kosala ete omiyoka lokola ozali mosika na basusu, lokola nde ozali na esika moko ya molili. Yango ekoki kobangisa. Kasi soki oyebi makambo oyo ebangisaka yo, okomona ete ezali na ntina te kobanga yango. Tótalela bandakisa oyo misato.

  •   Likambo ya liboso oyo ebangisaka: “Nayebi te naloba nini.”

     Likambo ya solo: Bato babosanaka makambo oyo olobaka kasi ndenge oyo osalelaka bango makambo nde etikalaka na makanisi na bango. Okoki kolongola kobanga, soki okolisi likoki na yo ya koyoka mpe ozali mpenza kotya likebi na makambo oyo basusu bazali koloba.

     Kanisá naino: Baninga ya ndenge nini osepelaka kozala na bango​—baoyo balobaka mingi lokola radio to baoyo bayokaka na likebi mpenza?

  •   Likambo ya mibale oyo ebangisaka: “Basusu bakokanisa ete nazali kotungisa bango.”

     Likambo ya solo: Bato bakozanga te likambo ya koloba mpo na yo, ozala nsɔninsɔni to te. Okoki kolonga likambo oyo ebangisaka yo mpe kotinda basusu bázala na likambo ya malamu ya koloba mpo na yo, soki otiki bango báyeba mpenza ndenge ozalaka.

     Kanisá naino: Soki okanisi ete bato nyonso bazali kolobela yo mabe, omoni te ete yo nde ozali kokanisela bango mabe ntango ozali kokanisa bongo?

  •   Likambo ya misato oyo ebangisaka: “Nakoyoka nsɔni soki nalobi likambo ya mabe.”

     Likambo ya solo: Na bantango mosusu, yango ekómelaka moto nyonso. Okoki kolonga likambo oyo ebangisaka yo, soki ozali kotalela bambeba na yo lokola mabaku ya komonisa ete ozali te komizwa na valɛrɛ mingi.

     Kanisá naino: Osepelaka kozala elongo na bato oyo bandimaka ete bazali bato ya kozanga kokoka, boye te?

 Oyebaki yango? Bato mingi bakanisaka ete lokola batindaka bamesaje mingi bazali bato ya nsɔninsɔni te. Kasi ezalaka pɛtɛɛ kosala boninga ya solosolo na moto ntango ozali kosolola na ye boye. Sherry Turkle, moto moko ya pisikoloji mpe ya teknoloji alobi boye: “Ntango tozali komona elongi ya moto mosusu mpe tozali koyoka mongongo na ye tokómaka na boyokani ya makasi.” a

Soki olongi likambo oyo ezali kobangisa yo, okomona ete kosolola na bato boye ezali likambo ya kobangisa te ndenge ozalaki kokanisa liboso

 Likambo ya kosala

  •   Boyá komikokanisa na basusu. Ezali na ntina te okóma moto oyo alingaka komilakisa. Kasi, zalá na mokano ya kolongola ezaleli na yo ya kozala nsɔninsɔni mpo ozanga te baninga mpe makambo mosusu ya ntina mingi na bomoi.

     “Masolo esengeli te kozala milaimilai to oyo esilaka te, mpe osengeli te kokóma loyengeloyenge. Osengeli koyebisa moto ya sika oyo okutani na ye nkombo na yo, to kotuna ye mwa mituna kasi oyo ezali na yango mindɔndɔ te.”​—Alicia.

     Toli ya Biblia: “Moto na moto ameka mosala na ye moko ndenge ezali, bongo akozwa likambo ya komikumisa na yango mpo na ye moko, kasi mpo azali komikokanisa na moto mosusu te.”​—Bagalatia 6:4.

  •   Taláká basusu na likebi. Talá malamu bato oyo basololaka malamu ná basusu mpe talá na likebi ndenge bazali kosolola ná basusu. Nini ezali kosimba mpo na bango? Mpe nini ezali kosimba te? Makoki nini bazali na yango oyo okoki kokolisa?

     “Talá malamu bato oyo basalaka boninga ná basusu na pɛtɛɛ nyonso mpe yekolá epai na bango. Talá ndenge bazali kosala mpe yoká makambo oyo balobaka ntango bakutani na moto mpo na mbala ya liboso.”​—Aaron.

     Toli ya Biblia: “Ebende epelisaka ebende. Ndenge moko mpe moto angɛngisaka elongi ya moto mosusu.”​—Masese 27:17.

  •   Tunáká mituna. Mbala mingi bato basepelaka kopesa likanisi na bango na likambo moko, na yango kotuna mituna ezali lolenge ya malamu ya kobanda lisolo elongo na bango. Yango ekosala ete bato bátya likebi mingi te epai na yo.

     “Komibongisa liboso ekoki kolongola yo kobanga. Okoki kobongisa mwa masolo to mituna liboso ya kokende esika oyo bato bakozala mingi, na yango soki okutani na bato ya sika ekozala mpasi te kosolola ná bango.”​—Alana.

     Toli ya Biblia: “Bótyaka likebi kaka na makambo na bino moko te, kasi bótyaka mpe likebi na makambo ya bamosusu.”​—Bafilipi 2:4.

a Euti na buku Reclaiming Conversation.